Lazalo ya Betania
Yesu azela mikolo mibale, ayei mikolo minei sima, mpe alili na ebembe ya moninga na ye. Ayebisi Marita ete azali lisekwa mpe bomoi, azali kotondela Tata na ye na mongongo makasi mpo ayoki ye, mpe abiangi Lazalo abima. Wana kanisi ya lisanga ekoma koboma ye.
11 1Moto moko, nkombo na ye Lazalo, azalaki kobela. Azalaki moto ya Betania, mboka ya Maria mpe ya ndeko na ye ya mwasi Marta. 2Maria—oyo ndeko na ye ya mobali Lazalo azalaki kobela—ye nde apakolaki Nkolo mafuta ya solo malamu mpe asukolaki makolo na Ye na suki na ye. 3Boye bandeko basi batindaki nsango epai na Ye : « Nkolo, moto oyo olingi azali kobela. »
4Tango Yesu ayokaki yango, alobaki : « Bokono oyo ekosukela na liwa te, kasi ezali mpo na nkembo ya Tata na biso, mpo ete Mwana ya Tata na biso akembisama na nzela na yango. »
5Yesu azalaki kolinga Marta, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazalo. 6Boye tango ayokaki ete Lazalo azali kobela, afandaki mikolo mibale mosusu na esika oyo azalaki.
7Sima na yango alobaki na bayekoli : « Tika tozonga na Yudea. »
8Bayekoli balobaki na Ye : « Rabi, Ba-Yuda bazalaki koluka kobwaka Yo mabanga sika moke, mpe Yo ozali kozonga kuna ? »
9Yesu azongisaki : « Ngonga zomi na mibale ezali na mokolo te ? Moto oyo azali kotambola na moi akokweya te, pamba te azali komona mwinda ya mokili oyo. 10Kasi soki moto atamboli na butu, akokweya, pamba te mwinda ezali kati na ye te. » 11Sima na yango, alobaki na bango : « Moninga na biso Lazalo alali tulu, kasi nakei kolamusa ye. »
12Boye bayekoli balobaki na Ye : « Nkolo, soki alali tulu, akobika. » 13Yesu azalaki koloba mpo na liwa na ye, kasi bango bakanisaki ete azali koloba mpo na kolala ya mpongi.
14Boye Yesu alobaki na bango polele : « Lazalo akufi, 15mpe nasepeli mpo na bino ete nazalaki kuna te, mpo ete bondima. Kasi tika tokende epai na ye. »
16Boye Tomasi, oyo babengi Mapasa, alobaki na bayekoli mosusu : « Tika tokende mpe biso, mpo tokufa elongo na Ye. »
17Tango Yesu akomaki, amonaki ete Lazalo asili kozala na lilita mikolo minei. 18Betania ezalaki pene na Yelusalemi, pene na mile mibale, a a v18 Stadi zomi na mitano ezali pene na mile mibale (pene na kilometele misato). 19mpe Ba-Yuda mingi bayaki epai na Marta mpe Maria mpo na kolendisa bango mpo na ndeko na bango. 20Tango Marta ayokaki ete Yesu azali koya, abimaki kokutana na Ye ; kasi Maria afandaki na ndako. 21Marta alobaki na Yesu : « Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai akufaki te. 22Kasi ata sik’oyo nayebi ete eloko nyonso oyo Yo okosenga epai ya Tata na biso, Ye akopesa Yo yango. »
23Yesu alobaki na ye : « Ndeko na yo ya mobali akosekwa lisusu. »
24Marta alobaki na Ye : « Nayebi ete akosekwa lisusu na lisekwa na mokolo ya suka. »
25Yesu alobaki na ye : « Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo andimi Ngai, akozala na bomoi ata soki akufi, 26mpe moto nyonso oyo azali na bomoi mpe andimi Ngai akokufa te libela. Ozali kondima likambo oyo ? »
27Alobaki na Ye : « Eyo, Nkolo ; nazali kondima ete Yo ozali Klisto, Mwana ya Tata na biso, Ye oyo azali koya na mokili. »
28Sima na koloba boye, akendeki kobengela ndeko na ye ya mwasi Maria na kimya : « Molakisi azali awa, azali kobenga yo. » 29Tango Maria ayokaki yango, atelemaki noki mpe akendeki epai na Ye. 30Yesu akotaki naino na mboka te ; azalaki kaka na esika oyo Marta akutanaki na Ye. 31Ba-Yuda oyo bazalaki elongo na ye na ndako mpe bazalaki kolendisa ye, bamonaki Maria atelemi noki mpe abimi ; balandaki ye, bakanisaki ete azali kokende na lilita mpo na kolela kuna. 32Maria akomaki epai ya Yesu, amonaki Ye, akweyaki na makolo na Ye mpe alobaki na Ye : « Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai akufaki te. »
33Tango Yesu amonaki ye azali kolela, mpe Ba-Yuda oyo bayaki elongo na ye bazali mpe kolela, ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe atungisamaki.
34Mpe alobaki : « Bolalisi ye wapi ? » Balobaki na Ye : « Nkolo, yaka mpe tala. »
35Yesu alelaki.
36Boye Ba-Yuda balobaki : « Mona ndenge alingaki ye ! » 37Kasi basusu kati na bango balobaki : « Moto oyo afungolaki miso ya impofu, akokaki kopekisa moto oyo akufa te ? »
38Boye Yesu, na mawa makasi lisusu kati na Ye, akendeki na lilita. Ezalaki libulu, mpe libanga ezalaki kokanga monoko na yango.
39Yesu alobaki : « Bolongola libanga. » Marta, ndeko ya mwasi ya moto oyo akufi, alobaki na Ye : « Nkolo, asili ayeisi nkenge, pamba te akufi mikolo minei. »
40Yesu alobaki na ye : « Nalobelaki yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Tata na biso ? »
41Boye balongolaki libanga. Yesu atombolaki miso na Ye likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kopesa Yo matondi mpo ete oyokaki Ngai. 42Nayebaki ete Yo oyokaka Ngai ntango nyonso, kasi nalobi boye mpo na ebele ya bato oyo bazali kotelema awa, mpo ete bandima ete Yo otindaki Ngai. » 43Tango alobaki boye, abelelaki na mongongo makasi : « Lazalo, bima ! »
44Moto oyo akufaki abimaki, makolo mpe maboko na ye ekanganaki na bambala ya lini mpe elongi na ye ezipamaki na elamba. Yesu alobaki na bango : « Bofungola ye ; botika ye akenda. »
Bakonzi basangani na likita
45Boye Ba-Yuda mingi oyo bayaki epai na Maria mpe bamonaki makambo oyo Yesu asalaki, bandimaki Ye. 46Kasi basusu kati na bango bakendeki epai na Ba-Farizai mpe balobelaki bango makambo oyo Yesu asalaki. 47Boye bakonzi ya banganga Nzambe mpe Ba-Farizai basangisaki likita mpe balobaki : « Tozali kosala nini ? Pamba te moto oyo azali kosala bilembo mingi. 48Soki totiki ye, bato nyonso bakondima Ye, mpe Ba-Loma bakoya mpe bakolongola biso esika na biso mpe ekolo na biso. »
49Kasi moko kati na bango, Kayife, mokonzi ya banganga Nzambe na mobu wana, alobaki na bango : « Boyebi eloko moko te. 50Bomoni te ete ezali malamu mpo na bino ete moto moko akufa mpo na bato, na esika ete ekolo mobimba ebebisama ? » 51Alobaki yango na makanisi na ye moko te ; lokola mokonzi ya banganga Nzambe na mobu wana, alakisaki ete Yesu akokufa mpo na ekolo, 52mpo na ekolo kaka te, kasi mpe mpo na kosangisa na esika moko bana ya Tata na biso oyo bapanzani. b b v52 Kayife alobaki malamu koleka oyo ayebaki. Yesu akokufa mpo na ekolo ya Ba-Yuda kaka te, kasi mpo na kosangisa mwana nyonso ya Tata na biso oyo apanzani na libota moko. 53Boye longwa na mokolo wana babongisaki toli mpo na koboma Ye. 54Boye Yesu atambolaki lisusu polele te kati na Ba-Yuda, kasi alongwaki kuna mpe akendeki na engumba moko oyo babengi Efalayimi pene na esobe, mpe afandaki kuna elongo na bayekoli na Ye.
55Pasika ya Ba-Yuda ezalaki pene, mpe bato mingi bamataki uta na mboka na Yelusalemi liboso na yango mpo na komipetola. 56Boye bazalaki koluka Yesu, mpe bazalaki kotunana bango na bango wana batelemi na tempelo : « Bino bokanisi nini ? Akoya na feti te, boye ? » 57Bakonzi ya banganga Nzambe mpe Ba-Farizai bapesaki mitindo ete moto nyonso oyo ayebi esika Yesu azali, ayebisa yango, mpo ete bakoka kokanga Ye.