Ebimisami na papye
Buku

Bapesi Yesu na Pilato

Pilato ayebi ete ezali zuwa, nzokande andimi ntango ebele ya bato eponi Barabasi. Basoda bazali kotyola ye lokola mokonzi. Bakangi ye na ekulusu na ngonga ya libwa na ntɔngɔ, aganga ete Nzambe atikaki ye, mpe akufi na molili. Mokonzi ya basoda mpe basi bazali kotala batikali.

Mokapo 15.

Na tongo-tongo, banganga-nzambe minene, bankulutu, bateyi ya Mibeko mpe Sanedrina mobimba bayokanaki, bakangaki Yesu, bamemaki Ye mpe bapesaki Ye na Pilato.

Pilato atunaki Ye : « Yo nde Mokonzi ya Ba-Yuda ? » Yesu azongisaki : « Yo moko ozali koloba yango. »

Banganga-nzambe minene bazalaki kofunda Ye mpo na makambo mingi. Boye Pilato atunaki Ye lisusu : « Ozongiseli eloko te ? Mona boni makambo bazali kofunda yo. »

Kasi Yesu alobaki lisusu eloko moko te, mpe Pilato akamwaki.

Na tango ya elambo, Pilato azalaki kolongola moto moko ya boloko mpo na bango, oyo bango batunaki. Moto moko oyo babengaki Barabasi azalaki na boloko elongo na bato ya botomboki oyo babomaki moto na tango ya botomboki. Ebele ya bato eyaki, mpe ebandaki kosenga Pilato asalela bango lokola asalaka ntango nyonso. Pilato azongisaki : « Bolingi ete nilongola mpo na bino Mokonzi ya Ba-Yuda ? » Pamba te ayebaki ete mpo na zuwa nde banganga-nzambe minene bapesaki Ye. Kasi banganga-nzambe minene bakamwisaki ebele ya bato ete asenga Pilato alongola Barabasi mpo na bango. Pilato atunaki bango lisusu : « Boye bolingi nasala nini na moto oyo bobiangaka Mokonzi ya Ba-Yuda ? »

Bagangaki : « Bokanga Ye na ekulusu ! »

Pilato atunaki : « Mpo na nini ? Mabe nini asali ? » Kasi bango bagangaki makasi koleka : « Bokanga Ye na ekulusu ! »

Mpo na kosepelisa ebele ya bato, Pilato alongolaki Barabasi mpo na bango. Asalaki ete bakula Yesu fimbu, mpe apesaki Ye ete bakanga Ye na ekulusu.

Basoda basali Mokonzi ntembe

Basoda bamemaki Ye na kati ya ndako monene (ndako ya mokambi ya etuka) mpe babengisaki lisanga mobimba ya basoda. Bapesaki Ye elamba ya motane makasi, babongisaki motole ya nzube mpe batiaki yango na moto na Ye. Mpe babandaki kopesa Ye losako : « Mbote, Mokonzi ya Ba-Yuda ! » Bazalaki kobetela Ye na moto na lingenda, bapurusaki Ye mei, mpe bagumbamaki liboso na Ye na kosala Ye ntembe. Sima na kosala Ye ntembe, balongolaki elamba ya motane, bakitisaki Ye bilamba na Ye moko, bongo bamemaki Ye libanda mpo na kokanga Ye na ekulusu.

Bakangi Mwana na ekulusu

Bakangaki na makasi moto moko oyo azalaki koleka, oyo azalaki koya uta na mboka, Simona ya Sirene, tata ya Alekisandele mpe Rufusi, ete amema ekulusu na Ye. Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka Golgota (elingi koloba Esika ya Litongo ya Moto). Bapesaki Ye vinyo oyo ekangami na mira, kasi andimaki te.

Bakangaki Ye na ekulusu. Bakabolaki bilamba na Ye kati na bango, na kobwaka mbeto mpo na oyo moko na moko akozwa. Ezalaki ngonga ya misato ya tongo tango bakangaki Ye na ekulusu. Mokanda oyo ekomamaki mpo na kolakisa likambo oyo bafundaki Ye ezalaki : MOKONZI YA BA-YUDA. Bakangaki bato mibale ya botomboki elongo na Ye, moko na ngambo ya mobali mpe moko na ngambo ya mwasi. a a v27 Mikanda ya kala koleka ezali na vers ya 28 awa te ; bakopi ya sima bakobakisi : « Mpe Makomi eyokanaki oyo elobi : ‹ Atangamaki elongo na basali mabe. › »

Bato oyo bazalaki koleka bafingaki Ye, na kolengisa mito na bango, mpe balobaki : « Ha ! Yo oyo ozalaki kobuka tempelo mpe kotonga yango na mikolo misato, bikisa yo moko mpe kita na ekulusu ! »

Ndenge moko, banganga-nzambe minene mpe bateyi ya Mibeko basalaki Ye ntembe kati na bango : « Abikisaki bato mosusu, kasi abikisa Ye moko akoki te. Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo na ekulusu, mpo tomona mpe tondima. » Bato oyo bakangamaki elongo na Ye mpe bafingaki Ye.

Mwana ya Tata apesi mpema na Ye ya nsuka

Na ngonga ya motoba, molili ekweyaki likolo ya mokili mobimba tii ngonga ya libwa.

Na ngonga ya libwa Yesu agangaki na mongongo makasi : « Eloi, Eloi, lema sabachthani ? » elingi koloba : « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini otiki Ngai ? »

Tango basusu kati na bato oyo bazalaki kotelema pene bayokaki yango, balobaki : « Yoka, azali kobianga Eliya. »

Moko akimaki mbangu, atondisaki eponji na vinyo oyo ekomi bololo, atiaki yango na nkoni ya matiti mpe apesaki Ye amela, bongo alobaki : « Tika Ye, tomona soki Eliya akoya kokitisa Ye. »

Na koganga na mongongo makasi, Yesu apesaki mpema na Ye ya nsuka. Mpe elamba ya tempelo ekatamaki na biteni mibale uta na likolo tii na nse. Mokonzi ya basoda nkama oyo atelemaki liboso na Yesu amonaki ndenge apesaki mpema na Ye ya nsuka mpe alobaki : « Solo, moto oyo azalaki Mwana na Nzambe. »

Basi mpe bazalaki kotala na mosika, kati na bango Maria Magadala, Maria mama ya Yakobo moke mpe ya Yose, mpe Salome. Basi oyo balandaki Ye na Galilaya mpe basalelaki Ye ; basusu mingi oyo bamataki elongo na Ye na Yerusaleme bazalaki mpe kuna.

Batiaki Ye na lilita

Mpokwa ekomaki, mpe lokola ezalaki Mokolo ya Bobongisi, mokolo liboso ya Sabata, Yozefu ya Arimatea, mwa mokonzi ya Sanedrina oyo azalaki mpe kozela Bokonzi ya Tata na biso, azalaki na mpiko mpe akendeki epai ya Pilato kosenga ebembe ya Yesu. Pilato akamwaki ete asili akufa ; abiangaki mokonzi ya basoda mpe atunaki ye soki Yesu akufa kala. Tango ayebaki epai ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki ebembe na Yozefu. Yozefu asombaki elamba ya lini, akitisaki ebembe, akangaki yango na elamba, mpe atiaki yango na lilita oyo bakatamaki na libanga. Sima abalolaki libanga na ekuke ya lilita. Maria Magadala mpe Maria mama ya Yose bamonaki esika oyo batiaki Ye.