Ebimisami na papye
Buku

Yesu akebisi bato mpo na bateyi ya lokuta

Mbala sambo Yesu alobi mawa na bateyi oyo batiaka bato mikumba, bapetolaka libanda ya kopo, mpe bagangaka makunia ya basakoli oyo batata na bango babomaki — atako bazali na Tata se moko, na likolo. Esili na mawa mpo na Yerusalemi, engumba oyo eboyaki, ndako oyo etikali mpamba.

Mokapo 23.

Bongo Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye,

ete : « Bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai bafandi na kiti ya Moyize.

« Boye bosala mpe bobatela makambo nyonso oyo bakoloba na bino, kasi bosala te ndenge bango basalaka, pamba te bateyaka kasi basalaka te. Babalukaka mikumba ya zito oyo ezali pasi na komema mpe batieli bato yango na mapeka, kasi bango moko bakotia mosapi na bango te mpo na kolongola yango. Basalaka makambo nyonso mpo ete bato bamona bango ; bakomisaka bakasa na bango ya Liloba monene mpe bapulupulu ya bilamba na bango milai, a a v5 Bakasa ya Liloba : bakomba mike ya poso oyo etondi na Makomi, bakangaka yango na moto mpe na loboko ya mwasi tango ya mabondeli. mpe balingaka bisika ya lokumu na bilambo mpe bakiti ya malamu kati na bandako ya losambo, mpe losako na bisika ya zando mpe kobengama ‹ Rabi › na bato. Bobenga bino ‹ Rabi › te, pamba te bozali na molakisi se moko, mpe bino nyonso bozali bandeko. Mpe bobenga moto moko te na mokili tata na bino, pamba te bozali na Tata se moko, oyo azali na Likolo. Tika ete moto moko abenga bino ‹ mokambi › te, pamba te bozali na mokambi se moko, Klisto. Oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino. Moto oyo akotombola ye moko akokitisama ; moto oyo akokitisa ye moko akotombolama.

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Pamba te bokangaka Bokonzi ya Tata na biso liboso ya bato ; bino moko bokotaka te mpe bopesaka nzela te na baoyo balingi kokota. b b v13 Mikanda ya kala koleka ezali na verse 14 awa te ; mikanda ya sima etiaki : « Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Bolimbaka bandako ya basi-mokufi mpe mpo na komonisa bato bosambaka mikolo ebele ; yango wana bokozwa etumbu monene koleka. »

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Pamba te bokatelaka mbu mpe mokili mpo na kozwa moto moko oyo akondima, mpe sima bokomisaka ye mwana ya lifelo mbala mibale koleka ndenge bozali.

Mawa na bino, bakambi ya bakufi miso ! Bolobaka ete : ‹ Kolapa ndai na tempelo ezali eloko te, kasi kolapa ndai na wolo ya tempelo ekangi moto. › Bino bazoba mpe bakufi miso ! Nini eleki monene : wolo, to tempelo oyo esantisaka wolo ? Mpe bolobaka ete : ‹ Kolapa ndai na etumbelo ezali eloko te, kasi kolapa ndai na likabo oyo ezali likolo na yango ekangi moto. › Bino bakufi miso ! Pamba te nini eleki monene : likabo, to etumbelo oyo esantisaka likabo ? Boye moto oyo alapi ndai na etumbelo, alapi ndai na yango mpe na biloko nyonso oyo ezali likolo na yango. Mpe moto oyo alapi ndai na tempelo, alapi ndai na yango mpe na Ye oyo afandaka kati na yango. Mpe moto oyo alapi ndai na Likolo, alapi ndai na kiti ya Tata na biso mpe na Ye oyo afandi likolo na yango.

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Bopesaka moko na zomi ya mint, anetu mpe kumini, kasi botiki makambo ya zito koleka ya Mibeko : bosembo, mawa, mpe bondimi. Makambo yango bobongaki kosala, kasi botika mosusu te. Bino bakambi ya bakufi miso, bozali kolongola nzinzi mpe bozali kolia ngamia !

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Bopetolaka kopo mpe lisaki na libanda, kasi na kati etondi na lokoso mpe na bozangi komipekisa. Mofalisai mokufi miso ! Liboso petola kati ya kopo mpe lisaki, mpo ete libanda mpe epetwa.

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Bozali lokola malita oyo bapakolaki mpembe : na libanda ezali kitoko, kasi na kati etondi na mikuwa ya bakufi mpe na mbindo nyonso. Boye bino mpe, na libanda bomonanaka bato ya bosembo na miso ya bato, kasi na kati botondi na bokosi mpe na mabe.

Mawa na bino, bateyi ya Mibeko mpe Ba-Falisai, bino bato ya bokosi ! Pamba te bokotaka malita ya basakoli mpe bokembisaka malita ya bato ya bosembo, mpe bolobaka ete : ‹ Soki totikalaki na mikolo ya batata na biso, tokokabolaki te elongo na bango na koboma basakoli. › Boye bino moko bozali kopesa litatoli na bino moko ete bozali bana ya baoyo babomaki basakoli. Boye bokokisa makambo oyo batata na bino batiki. Bino banyoka, bino libota ya mboma, ndenge nini bokokima etumbu ya lifelo ? Boye nazali kotinda bino basakoli, bato ya mayele mpe bateyi ya Mibeko ; bamosusu kati na bango bokoboma mpe bokobaka na ekulusu, bamosusu bokobeta na bandako ya losambo na bino mpe bokolanda bango uta mboka na mboka, mpo ete makila nyonso ya bosembo oyo ebwakami na mokili ekweya likolo na bino, uta na makila ya Abele ya bosembo kino na makila ya Zakaria mwana ya Berekia, oyo bobomaki na katikati ya Esika Mosantu mpe etumbelo. Nazali koloba na bino penza ya solo ete makambo oyo nyonso ekokwela libota oyo.

Yesu azali kolela mpo na Yelusalemi

Yelusalemi, Yelusalemi, oyo ozali koboma basakoli mpe kobeta mabanga baoyo batindami epai na yo ! Mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, lokola nsoso esangisaka bana na yango na nse ya mapapu na yango, kasi bolingaki te. Tala, ndako na bino etikami epai na bino ezanga moto. Nazali koloba na bino ete bokomona Ngai lisusu te kino bokoloba ete : ‹ Apambolama oyo azali koya na Kombo ya Tata na biso. › »