Lokumu na losambo mpe na molongo
Mikakatano mibale na likita: kozipa to kozipa te motó ntango bazali kobondela Tata na biso, mpe Bolei ya Nkolo epai bazwi-nkita balyaka liboso nzokande babola batikali na nzala. Likambo oyo ya suka nde ntina basusu bazali na bolembu mpe na bokono: balyaka kozanga koyeba nzoto. Bozelana.
11 1Bolanda ngai ndenge ngai mpe nazali kolanda Klisto.
2Sik’oyo nazali kosanzola bino mpo ete bokanisaka ngai na makambo nyonso mpe bobatelaka mimeseno ndenge napesaki bino yango. 3Nalingi ete boyeba : mokonzi ya mobali nyonso azali Klisto, mokonzi ya mwasi azali mobali, mpe mokonzi ya Klisto azali Tata na biso. 4Mobali nyonso oyo azali kobondela to kosakola na moto azipami, azali kokitisa lokumu ya moto na ye. 5Kasi mwasi nyonso oyo azali kobondela to kosakola na moto azipami te, azali kokitisa lokumu ya moto na ye. Ezali lokola ete akatisami nywele nyonso. 6Soki mwasi andimi kozipa moto na ye te, tika ete akata nywele na ye ; kasi lokola ezali nsoni mpo na mwasi akata nywele na ye to akatisa moto na ye mobimba, tika ete azipa moto na ye. 7Mobali asengeli kozipa moto na ye te, pamba te azali elilingi mpe nkembo ya Tata na biso ; kasi mwasi azali nkembo ya mobali. 8Pamba te mobali abimaki na mwasi te, kasi mwasi abimaki na mobali. 9Mobali mpe akelamaki mpo na mwasi te, kasi mwasi akelamaki mpo na mobali. 10Yango wana mwasi asengeli kozala na elembo ya bokonzi na moto na ye, mpo na baanzelu.
11Atako bongo, kati na Nkolo mwasi azali kozala libanda ya mobali te, mpe mobali azali kozala libanda ya mwasi te. 12Pamba te ndenge mwasi abimaki na mobali, bongo mpe mobali abotami na nzela ya mwasi ; kasi biloko nyonso euti epai ya Tata na biso. 13Bino moko bokata likambo : ezali malamu mpo na mwasi abondela Tata na biso na moto azipami te ? 14Ezalela ya biloko ye moko ezali koteya bino te ete nywele milayi ezali nsoni mpo na mobali, 15kasi soki mwasi azali na nywele milayi, ezali nkembo na ye, pamba te nywele epesami na ye mpo na kozipa moto ? 16Soki moto moko alingi kowelana mpo na likambo oyo, biso tozali na momeseno mosusu te, mpe mangomba ya Tata na biso mpe bazali na yango te.
Bato bazali kopesa Mesa ya Nkolo lokumu te
17Na kopesa malako oyo, nazali kosanzola bino te, pamba te bozali kosangana na malamu te kasi na mabe. 18Pamba te na liboso, tango bosangani lokola lingomba, nayoki ete bokabwani kati na bino, mpe nandimi yango na ndambo. 19Pamba te bokabwani esengeli mpe kozala kati na bino, mpo ete bato ya solo kati na bino bamonana polele. 20Boye, tango bosangani na esika moko, ezali bilei ya mpokwa ya Nkolo oyo bozali kolia te. 21Pamba te tango bozali kolia, moko na moko azali kosimba liboso bilei na ye ya mpokwa — moko azali na nzala, mosusu azali kolangwa. 22Bozali na bandako te mpo na kolia mpe komela ? To bozali kotala lingomba ya Tata na biso pamba mpe kosala nsoni bato oyo bazali na eloko moko te ? Nakoloba nini na bino ? Nasanzola bino ? Nasanzola bino te mpo na likambo oyo.
23Pamba te nazwaki epai ya Nkolo makambo oyo napesaki bino mpe : Nkolo Yesu, na butu oyo atekamaki, azwaki limpa,
24sima na kopesa matondi, abukaki yango mpe alobaki : « Oyo ezali nzoto na Ngai, mpo na bino ; bosala boye mpo na kokanisa Ngai. » 25Ndenge moko, sima na bilei ya mpokwa, azwaki mpe kopo mpe alobaki : « Kopo oyo ezali boyokani ya sika na makila na Ngai. Bosala boye, mbala nyonso bokomela yango, mpo na kokanisa Ngai. »
26Mbala nyonso bokolia limpa oyo mpe bokomela kopo oyo, bozali kosakola liwa ya Nkolo tii akoya.
27Yango wana, moto nyonso oyo akolia limpa to akomela kopo ya Nkolo na ndenge ebongi te, azali na ngambo mpo na nzoto mpe makila ya Nkolo. 28Tika ete moto amitala liboso, sima alia limpa mpe amela kopo. 29Pamba te moto nyonso oyo azali kolia mpe komela, kozanga kososola nzoto, azali kolia mpe komela esambiselo likolo na ye moko. 30Yango wana bato mingi kati na bino bazali na bolembu mpe na bokono, mpe ndambo bakufi. 31Kasi soki tozalaki komisambisa malamu, bakosambisa biso te. 32Tango Nkolo azali kosambisa biso, azali kolakisa biso nzela mpo ete tokatelama etumbu elongo na mokili te. 33Boye, bandeko na ngai, tango bosangani mpo na kolia, bozelana. 34Soki moto azali na nzala, tika ete alia na ndako, mpo ete kosangana na bino ememela bino esambiselo te. Makambo mosusu nakosembola tango nakoya.