Ebimisami na papye
Buku

Bitumbu sambo ya suka

Baoyo baboyaki nyama batelemi pembeni ya ebale ya talatala koyemba loyembo ya Moyize mpe ya Mwana-mpate, kobenga banzela ya Tata na biso sembo mpe ya solo. Baanzelu nsambo babimi na bilamba ya lini ya pole na bakopo nsambo, mpe milinga etondisi tempelo ete moto moko te akoki kokota kino bakosopa yango.

Mokapo 15.

Namonaki elembo mosusu na likolo, monene mpe ya kokamwa : baanjelu sambo oyo bazalaki kosimba bitumbu sambo ya suka, pamba te na yango nde nkanda ya Tata na biso esilaki.

Namonaki eloko lokola mbu ya talatala oyo ekangani na moto, mpe pembeni na yango batelemi bato oyo balongaki nyama, elilingi na yango mpe motango ya kombo na yango, bazali kosimba bakinanga oyo euti epai ya Tata na biso. Mpe bayembaki loyembo ya Moyize, mosali ya Tata na biso, mpe loyembo ya Yesu, Mwana ya mpate : « Misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa, Tata Mokonzi, Yo oyo ozali na nguya nyonso ! Banzela na Yo ezali ya bosembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikolo ! Nani akobanga Yo te, Tata, mpe akokumisa Kombo na Yo te ? Pamba te Yo moko nde ozali mosantu. Bikolo nyonso bikoya mpe bikogumbamela Yo, pamba te misala na Yo ya bosembo emonisami. »

Sima na yango natalaki, mpe tempelo, hema ya litatoli, efungwamaki na likolo. Baanjelu sambo oyo bazalaki na bitumbu sambo babimaki na tempelo, bazalaki kolata bilamba ya lini ya peto mpe ya kongenga, mpe bakangaki mikanda ya wolo na ntolo na bango.

Bongo moko na bikelamu minei ya bomoi apesaki baanjelu sambo bakopo sambo ya wolo etondi na nkanda ya Tata na biso, oyo azali na bomoi libela na libela. Molinga oyo euti na nkembo ya Tata na biso mpe na nguya na Ye etondisaki tempelo ; moto moko te akokaki kokota kuna kino bitumbu sambo ya baanjelu sambo esilaki.