Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo
Mimeseno ya mesa elongo na eloko ya makasi na nse na yango. Ntalela yo moko na liboso ya bilei ya malamu ya mokonzi, mpe komitungisa te mpo na koluka bomengo oyo ekoli mapapu mpe ekopumbwa. Esuki na elilingi ya moto ya masanga, abetami mpe ayoki te, alamuki kaka mpo na koluka masanga mosusu.
23 1Tango ofandi mpo na kolia elongo na mokonzi, tala malamu oyo ezali liboso na yo, 2mpe tia mbeli na kingo na yo soki ozali moto oyo posa ya libumu ekambaka. 3Kolula bilei na ye ya elengi te, pamba te ezali bilei ya bokosi.
4Komilemba mpo na kozwa bomengo te ; zala na bwanya ya komikanga. 5Tango okotala bomengo, esili kolimwa, pamba te ekozwa mapapu na mbalakata mpe ekopumbwa na likolo lokola mpongo.
6Kolia mampa ya moto ya likunya te, mpe kolula bilei na ye ya elengi te, 7pamba te azali moto oyo azali kotanga ntalo ya biloko nyonso. Alobaka na yo : « Lia mpe mela ! » kasi motema na ye ezali elongo na yo te. 8Okosanza eloko moke oyo olei, mpe okobebisa maloba na yo ya malamu.
9Koloba na matoyi ya moto ya bozoba te, pamba te akotiola bwanya ya maloba na yo.
10Kolongola libanga ya ndelo ya kala te, mpe kokota na bilanga ya bana oyo bazangi tata te, 11pamba te Mosikoli na bango azali makasi ; Tata na biso akotelema mpo na bango mpe akobunda na yo. a a v11 Tango moto asali mabe na mwana oyo azangi tata mpe azali na moto moko te oyo akobatela ye, Tata na biso Ye moko akomi mobateli na ye mpe akozwa likambo na ye lokola likambo na Ye.
12Pesa motema na yo na mateya mpe matoyi na yo na maloba ya boyebi.
13Kozanga kopesa mwana etumbu te ; soki obeti ye na fimbu, akokufa te. 14Beta ye na fimbu, mpe okobikisa bomoi na ye na lilita.
15Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na mayele, motema na ngai moko mpe ekosepela. 16Kati na ngai nyonso ekosepela tango bibebu na yo ekoloba oyo ezali sembo.
17Tika ete motema na yo eyokela basumuki zuwa te, kasi kokoba na bobangi Tata na biso mokolo mobimba. 18Solo, mikolo ya sima ezali, mpe elikya na yo ekokatama te.
19Yoka, mwana na ngai, mpe zala na mayele, mpe kamba motema na yo na nzela ya sembo. 20Zala kati na bato oyo bamilangwisaka na vinyo te, to bato oyo bamitondisaka na mosuni te, 21pamba te moto ya masanga mpe moto ya bolei makasi bakokoma babola, mpe mpongi ekolatisa bango bilamba ya kopasuka.
22Yoka tata na yo, oyo abotaki yo, mpe kotiola mama na yo te tango akoma mobange. 23Somba solo mpe koteka yango te ; somba mayele, mateya mpe bososoli. 24Tata ya mwana ya sembo akosepela mingi ; oyo abotaki mwana ya mayele akozwa esengo na ye. 25Tika ete tata na yo mpe mama na yo basepela ; tika ete oyo abotaki yo asepela.
26Mwana na ngai, pesa ngai motema na yo, mpe tika ete miso na yo esepela na banzela na ngai. 27Pamba te ndumba ezali libulu ya mozindo, mpe mwasi ya ekobo azali libulu ya mai ya nzela moke. 28Alalaka na kozela lokola mwivi mpe akotisaka mibali mingi na kozanga bosembo.
29Nani azali na mpasi? Nani azali na mawa? Nani azali na etumba? Nani azali na makambo ya kolela? Nani azali na bampota ya pamba? Nani azali na miso matane? 30Bato oyo bafandaka ntango molai na vinyo, bato oyo bakendaka komeka bakopo ya vinyo oyo ebakisami na biloko mosusu. 31Kotala vinyo te tango ezali motane, tango ezali kongenga na kopo mpe ezali kokita malamu. 32Na nsuka ekoliaka lokola nyoka mpe ekobetaka lokola nyoka ya sumu. 33Miso na yo ekomona makambo ya kokamwa, mpe motema na yo ekoloba makambo ya kobaluka. 34Okozala lokola moto oyo alali na katikati ya mbu, lokola moto oyo alali na likolo ya nzete monene ya masuwa. 35« Babetaki ngai, kasi nayokaki mpasi te ; babetaki ngai, kasi nayebaki yango te. Ntango nini nakolamuka ? Nakoluka lisusu masanga mosusu. »