Mokolo ya libala ya Mokonzi
Mwasi azali koluka na engumba ya molili moto oyo alingaka, atuni bakengeli, sima azwi ye mpe atiki ye te kino akokotisa ye na ndako ya mama na ye. Na sima bamongongo mosusu batali kalosi ya Salomo ekengelami ezali koya, mokonzi akotisami motole na mokolo ya libala na ye.
3 1Likolo ya mbeto na ngai butu mobimba, nalukaki ye oyo molimo na ngai alingi; nalukaki ye, kasi namonaki ye te. 2Sik’oyo nakotelema mpe nakotambolatambola na engumba, na balabala mpe na bisika monene; nakoluka ye oyo molimo na ngai alingi. Nalukaki ye, kasi namonaki ye te. 3Bakengeli oyo bazalaki kotambola zingazinga ya engumba bamonaki ngai. « Bomoni ye oyo molimo na ngai alingi ? » 4Nalekaki bango se mwa moke tango namonaki ye oyo molimo na ngai alingi. Nasimbaki ye mpe natikaki ye te kino nakotisaki ye na ndako ya mama na ngai, na ndako ya kati ya oyo abotaki ngai. 5Nalayisi bino ndai, bana basi ya Yelusaleme, na nkombo ya bamboloko mpe ya bampunda ya zamba : bolamusa bolingo te mpe bosekwisa yango te kino ekolinga yango moko.
6Nani oyo azali komata uta na esobe, lokola makolo ya milinga, azali na solo malamu ya mira mpe ya lobano, na malasi nyonso ya motuni ? 7Tala, ezali kalesi ya Salomo moko, na bamibali ya nguya tuku motoba zingazinga na yango, kati na bamibali ya nguya ya Isalaele, 8bango nyonso basimbi mipanga, bayekolaki etumba, moto na moto na mopanga na ye na ngambo na ye, mpo na bobangi ya butu. 9Mokonzi Salomo asalelaki ye moko kalesi na nzete ya Libani. 10Asalaki makonzi na yango na palata, sima na yango na wolo, esika ya kofanda na yango na motane ya bokonzi; kati na yango ekembisamaki na bolingo na bana basi ya Yelusaleme. 11Bobima, bana basi ya Siona, mpe botala Mokonzi Salomo, alati motole oyo mama na ye atiaki na ye tango ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye esepelaki.