Ezali malamu mingi koyemba nzembo ya masanzoli
Tata na biso atangaka minzoto mpe apesi yango nyonso nkombo, mpe akangaka bapasuki-motema; atindaka mpiɔ mpe mabanga ya mbula, sima liloba oyo ezindisi yango. Oyo esepelisaka ye ezali makasi ya mpunda to ya moto te, kasi bato oyo bazali kotia elikya na bolingo na ye.
147 1Aleluya ! Ezali malamu koyemba nzembo ya masanzoli epai ya Tata na biso; ezali kitoko mpe ebongi kosanzola Ye.
2Tata na biso atongaka Yerusalem ; asangisaka bato ya Isalaele oyo bapalangani. 3Abikisaka baoyo mitema na bango ebukani mpe akangaka bapota na bango. 4Abalaka minzoto ; abengaka yango moko na moko na kombo na yango. 5Tata na biso Mokonzi azali monene mpe na nguya makasi ; bososoli na Ye eleki ndelo. 6Tata na biso atombolaka bato ya komikitisa ; abwakaka bato mabe na nse.
7Boyembela Tata na biso na botondi ; bobeta kinanda mpo na Ye. 8Alalisaka likolo na mapata ; atindaka mvula na mabele ; ameisaka matiti na bangomba. 9Apesaka bibwele bilei na yango, mpe bana ya ndeke ya moindo tango bazali kolela. 10Esengo na Ye ezali na nguya ya mpunda te ; asepelaka na makolo ya moto te. 11Tata na biso asepelaka na baoyo bazali kobanga Ye, na baoyo bazali kolikya bolingo na Ye ya boyokani.
12Sanzola Tata na biso, Yerusalem ! Sanzola Tata na yo, Siona ! 13Pamba te alendisaka bikangelo ya baporte na yo ; apambolaka bana na yo kati na bifelo na yo. 14Akotisaka kimia na ndelo na yo ; atondisaka yo na ble ya malamu koleka. 15Atindaka mobeko na Ye na mokili ; liloba na Ye ezali kopota mbangu mingi. 16Apesaka neje lokola nsuki ya mpate ; apanzaka mpio lokola putulu. 17Abwakaka mbula na Ye ya mabanga lokola biteni mike ya mampa ; nani akoki kotelema liboso ya mpio na Ye ? 18Atindaka liloba na Ye mpe ezikisaka mabanga ya mayi ; atelemisaka mopepe na Ye, mpe mayi ebandaka kotiola. 19Ayebisaka Yakobo liloba na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye epai ya Isalaele. 20Asali boye mpo na ekolo mosusu te ; bayebi bikateli na Ye te. Aleluya !