Ebimisami na papye
Buku

Aleluya

Kotia elikya na bakonzi te, oyo mikano na bango ekufaka elongo na bango na mokolo moko. Eloko mosusu ezali Tata na biso, oyo ayebisami na oyo asalaka: bosembo mpo na batindikami, limpa mpo na bayokaka nzala, bakangami bafungolami, bapaya, bana ya bobola mpe basi akufelaki mibali babatelami.

Mokapo 146.

Aleluya ! Kumisa Tata na biso, molimo na ngai.

Nakokumisa Tata na biso tango nazali na bomoi ; nakoyemba mpo na Tata na biso tii tango nazali kopema.

Kotia elikya na yo te na bakonzi, na moto akufaka oyo akoki kobikisa yo te. Molimo na ye ekei, azongi na mabele ; mokolo yango moko makanisi na ye mabungi. Azali na esengo moto oyo Nzambe ya Yakobo azali mosungi na ye, oyo elikya na ye ezali na Tata na biso.

Ye nde Mokeli ya likolo mpe ya mabele, ya mbu mpe ya biloko nyonso oyo ezali kati na yango ; abatelaka bosolo libela. Asalaka bosembo mpo na bato oyo banyokolami ; apesaka limpa na bato oyo nzala ezali koboma. Tata na biso afungolaka bakangami. Tata na biso afungolaka miso ya bakufi miso ; Tata na biso atombolaka bato oyo bagumbami ; Tata na biso alingaka bato ya bosembo. Tata na biso abatelaka bapaya ; asungaka mwana oyo azangi tata mpe mwasi oyo mobali na ye akufa, kasi abebisaka nzela ya bato mabe.

Tata na biso akokonza libela, Siona— Tata na yo, kino na mibotama nyonso. Aleluya !