Eloko moko te longola Klisto oyo abakamaki na ekulusu
Paulo ayaki na nko te na maloba ya kokamwisa, kaka na Klisto oyo abakamaki na ekulusu, mpo ete kondima na bango etelema na nguya ya Tata na biso, kasi na mayele ya molobi te. Bwanya oyo ateyaka ebombami, ebongisamaki liboso ya ebandeli ya ntango, mpe eyebanaka kaka ndenge Molimo ya Tata na biso amonisi yango.
2 1Tango nayaki epai na bino, bandeko, nalobaki te litatoli ya Tata na biso na maloba ya kitoko to na bwanya. 2Pamba te nakataki likambo ete nayeba eloko moko te kati na bino longola Yesu-Klisto, Ye oyo abakamaki na ekulusu. 3Nayaki epai na bino na bolembu, na bobangi, mpe na kolenga mingi. 4Nsango na ngai mpe mateya na ngai etyamaki na maloba ya bwanya oyo ebongolaka makanisi ya bato te, kasi na bilembo ya Molimo Mosantu mpe ya nguya, 5mpo ete kondima na bino etyama na bwanya ya bato te, kasi na nguya ya Tata na biso.
6Tozali koloba bwanya kati na bato oyo bakoli mpenza, kasi bwanya ya ntango oyo te, to ya bakonzi ya ntango oyo, oyo bazali kolimwa. 7Te, tozali koloba bwanya ya Tata na biso, likambo ya kobombama, oyo Tata na biso akataki liboso ete ntango ebanda, mpo na nkembo na biso. 8Moko te kati na bakonzi ya ntango oyo ayebaki yango; soki bayebaki yango, babakaki Nkolo ya nkembo na ekulusu te. 9Ndenge ekomami : « Eloko oyo liso emonaki te, litoyi eyokaki te, mpe motema ya moto ekanisaki te, biloko oyo Tata na biso abongisaki mpo na bato oyo balingaka Ye. »
10Kasi Tata na biso amonisaki biso yango na nzela ya Molimo ; pamba te Molimo atalaka biloko nyonso malamu, ata bozindo ya Tata na biso. 11Nani ayebi makanisi ya moto longola molimo na ye moko oyo ezali kati na ye ? Bobele boye, moto moko te ayebi makanisi ya Tata na biso longola Molimo ya Tata na biso. 12Toyambaki molimo ya mokili te, kasi Molimo oyo euti epai ya Tata na biso, mpo ete toyeba biloko oyo Tata na biso apesaki biso na ofele. 13Tozali koloba yango, na maloba oyo bwanya ya bato eteyaka te, kasi oyo Molimo azali koteya, tozali kolimbola makambo ya molimo epai ya bato ya molimo. 14Moto oyo azangi Molimo andimaka te makambo oyo euti na Molimo ya Tata na biso ; ezali bozoba mpo na ye, mpe akoki kososola yango te, pamba te esengeli kososola yango na Molimo. 15Moto ya molimo asosolaka biloko nyonso, kasi ye moko, moto moko te akoki kosambisa ye. 16Pamba te « nani ayebi makanisi ya Tata na biso mpo ateya Ye ? » Kasi biso tozali na makanisi ya Klisto.