Bokolo kati na Tata
Bakolinti bazali kokabwana na masanga ya balandi: ngai nalandaka Paulo, ngai nalandaka Apolo. Paulo abengi yango bomwana. Molonani mpe mosopeli mai bazali eloko te; Tata na biso nde akolisaka. Oyo moto na moto atongi likolo ya moboko moko ekomonisama na mɔtɔ.
3 1Bandeko, nakokaki koloba na bino lokola na bato ya Molimo te, kasi lokola na bato ya nzoto, bana mike kati na Klisto. 2Napesaki bino mabele ya mama, kasi bilei ya makasi te, pamba te bozalaki naino na makoki te. Kutu sik’oyo mpe bozali naino na makoki te. 3Bozali naino bato ya nzoto. Lokola zuwa mpe koswana ezali kati na bino, bozali bato ya nzoto te? Bozali kobika lokola bato ya mokili? 4Pamba te tango moto moko azali koloba : « Nazali kolanda Polo », mpe mosusu : « Nazali kolanda Apolo », bozali kosala lokola bato ya mokili se boye te?
5Boye Apolo azali nani? Polo azali nani? Bazali basali oyo bondimaki na nzela na bango, moko na moko ndenge Nkolo apesaki ye. 6Ngai nalonaki, Apolo asopaki mai, kasi Tata nde akolisaki yango. 7Boye moto oyo alona azali eloko te, mpe oyo asopaka mai azali eloko te. Tata se Ye nde azali eloko, Ye oyo akolisaka yango. 8Moto oyo alona mpe oyo asopaka mai bazali se moko, mpe moko na moko akozwa lifuta na ye engebene na mosala na ye. 9Pamba te biso tozali basali elongo na Tata, bino bozali elanga na Ye, ndako na Ye.
10Na ngolu oyo Tata apesaki ngai, natyaki ekoki lokola moyani ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga likolo na yango. Tika ete moko na moko atala ndenge azali kotonga likolo na yango. 11Pamba te moto moko te akoki kotya ekoki mosusu longola oyo etyami kala, oyo ezali Yesu-Klisto. 12Sik’oyo soki moto atongi likolo na ekoki yango na wolo, palata, mabanga ya motuya, nzete, matiti ya mamba to matiti ya kokauka, 13mosala na moko na moko ekobima polele, pamba te Mokolo yango ekomonisa yango, mpo ete moto ya moto ekomonisa yango, mpe moto yango moko ekomeka mosala na moko na moko ete ezali ya motindo nini. 14Soki mosala oyo moto atongi likolo na ekoki yango etiki, akozwa lifuta. 15Soki mosala na moto moko ezikisami, akozwa bungi, kasi ye moko akobikisama, kasi se lokola na nzela ya moto.
16Boyebi te ete bozali tempelo ya Tata, mpe Molimo ya Tata azali kofanda kati na bino? 17Soki moto abomi tempelo ya Tata, Tata akobomisa ye. Pamba te tempelo ya Tata ezali santu, mpe tempelo yango ezali bino.
18Tika ete moto moko te akosa ye moko. Soki moto kati na bino akanisi ete azali na mayele na mikolo oyo, tika ete akoma moto ya bozoba mpo ete akoma na mayele. 19Pamba te mayele ya mokili oyo ezali bozoba na miso ya Tata. Pamba te Minkanda elobi : « Akangaka bato ya mayele na mayele na bango ya mabe », 20mpe lisusu : « Tata ayebi makanisi ya bato ya mayele, ete ezali pamba ». 21Boye tika ete moto moko te amikumisa mpo na bato. Pamba te biloko nyonso ezali na bino, 22ezala Polo to Apolo to Kefa, ezala mokili to bomoi to liwa, ezala sik’oyo to mikolo ekoya, nyonso ezali na bino, 23mpe bino bozali na Klisto, mpe Klisto azali na Tata.