Ebimisami na papye
Buku

Bakengeli ya makambo ya sekele ya Tata

Bakolinti bazali kosambisa bantoma na bango lokola batali oyo bapesaka basani maki. Paulo alobi ete bosambisi bobele oyo ezali na ntina ezali masanzoli ya Tata na biso ntango Nkolo akozonga, amonisi nzala na ye moko, kobetama mpe kozanga ndako, mpe akundweli bango ete abotaki bango na nsango malamu, yango wana akomeli bango lokola tata.

Mokapo 4.

Botala biso lokola basali ya Klisto mpe bakengeli ya makambo ya sekele ya Tata na biso. Lisusu, oyo esengami na bakengeli ezali ete bamonana bato ya sembo. Kasi mpo na ngai, ezali na ntina mingi te soki bino to ndako ya bosambisi ya bato esambisi ngai. Ata ngai moko nasambisi ngai te. Nayebi likambo moko te oyo ezali na ngai, kasi yango ekomisi ngai moto ya bosembo te. Oyo asambisi ngai azali Nkolo Yesu na biso. Boye bosambisa likambo te liboso ya tango, liboso Nkolo Yesu na biso aya. Ye akobimisa na pole makambo oyo ebombami na molili mpe akolakisa mikano ya mitema. Bongo moko na moko akozwa lokumu epai ya Tata na biso.

Bandeko, nasaleli makambo oyo na ngai moko mpe na Apolo mpo na bino, mpo ete bino boyekola epai na biso kokende te na nsima ya oyo ekomami, mpe bomitombola te, bolinga moko koleka mosusu. Pamba te nani azali kokesenisa yo? Ozali na nini oyo ozwaki te? Soki ozwaki yango, mpo na nini ozali komikumisa lokola ete ozwaki yango te?

Sik’oyo bozali na nyonso oyo bolingi! Sik’oyo bokomi bazwi! Bobandi kokonza biso te — soki penza bozalaki kokonza, mpo biso mpe tokonza elongo na bino! Pamba te nakanisi ete Tata na biso alakisi biso, ba-apostolo, na nsuka, lokola bato bakatelami ete bakufa, mpo tokomi eloko ya komonisama na mokili, na baanjelo mpe na bato. Biso tozali bazoba mpo na Klisto, kasi bino bozali na bwanya kati na Klisto. Biso tozali na bolembu, bino bozali na makasi. Bino bozali na lokumu, biso tozali na lokumu te. Tii ngonga oyo tozali na nzala mpe na posa ya mai, tozali kolata bilamba ya mpamba, tozali kobetama mpe tozali na ndako te. Tozali kosala makasi na maboko na biso moko. Tango bazali kotuka biso, tozali kopambola ; tango bazali konyokola biso, tozali kokanga motema. Tango bazali kotatola biso mabe, tozali koyanola na boboto. Tokomi lokola bosoto ya mokili, mpe lokola eloko ya kosundolama ya bato nyonso tii lelo.

Nazali kokoma makambo oyo mpo na kosala bino nsoni te, kasi mpo na kopesa bino toli lokola bana na ngai ya bolingo. Ata bozali na bakambi ebele penza kati na Klisto, bozali na batata ebele te — pamba te ngai nabotaki bino kati na Klisto Yesu na nzela ya Nsango Malamu. a a v15 Paulo azali na esika ya Tata na biso te ; azali kaka eloko ya bato oyo Tata na biso asaleli mpo na kobotela bana na Ye kati na libota. Nsango Malamu moko nde ebotaka. Yango wana nabondeli bino : bolanda ngai. Mpo na yango natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo mpe ya sembo kati na Nkolo — akokundolela bino ndenge nazali kotambola kati na Klisto Yesu, ndenge nazali koteya na bisika nyonso, kati na lingomba nyonso. Basusu bamitombolaka lokola ete nakoya epai na bino te. Kasi nakoya epai na bino noki, soki Nkolo Yesu na biso alingi, mpe nakoyeba, ezali maloba ya bato oyo bamitombolaka te, kasi nguya na bango. Pamba te Bokonzi ya Tata na biso ezali likambo ya maloba te, kasi ya nguya. Bolingi nini ? Nakoya epai na bino na fimbo, to na bolingo mpe na molimo ya boboto ?