Pasola Likolo
Oyo ezali libondeli ete Tata na biso akatola likolo mpe akita. Ezali kokweya te kobatela bato, ebengi misala na bango ya malamu koleka bilamba ya mbindo mpe endimi ete moto moko te akangaka ye makasi. Tempelo etumbami. Esuki na motuna oyo eyaki na eyano te.
64 1Ee, tika ete Yo opasola Likolo mpe ozika, mpo ete bangomba eningana liboso na Yo, 2lokola moto ezikisaka matiti ya kokauka mpe etokisaka mai—mpo na koyebisa banguna na Yo Kombo na Yo, mpo ete bikolo bibanga mpe bilenga liboso na Yo ! 3Tango Yo osalaki makambo ya kobangisa oyo tozelaki te, ozikaki, mpe bangomba eningaki liboso na Yo. 4Banda kala, moto moko te ayokaki to ayebaki na matoyi, liso moko te emonaki mosusu longola Yo, oyo osalaka mpo na moto oyo azali kozela Ye. 5Yo ondimaka bato oyo basalaka bosembo na esengo, oyo bakanisaka Yo wana bazali kotambola na banzela na Yo. Kasi Yo osilikaki, mpe tosalaki masumu ; tozali kati na masumu na biso banda kala—tokobikisama ? 6Biso nyonso tokomi lokola moto oyo azali mbindo, mpe misala nyonso na biso ya bosembo mizali lokola elamba ya bosoto. Biso nyonso tokauka lokola nkasa ya nzete, mpe masumu na biso, lokola mompepe, mamemaka biso mosika. 7Moto moko te azali oyo abiangaka Kombo na Yo, oyo alamuka mpo na kosimba Yo ; pamba te Yo obombaki elongi na Yo epai na biso mpe otikaki biso na masumu na biso.
8Kasi sik’oyo, Yo ozali Tata na biso ; biso tozali potopoto, mpe Yo ozali mosali ya mbeki na biso ; biso nyonso tozali mosala ya loboko na Yo. 9Kosilika makasi mingi boye te, Tata na biso, mpe kokanisa lisumu na biso seko te. Tala, nabondeli Yo, biso nyonso tozali bato na Yo. 10Bamboka na Yo basantu bakomi esobe ; Siona ekomi esobe, Yelusalemi ekomi libebi. 11Ndako na biso ya bosantu mpe kitoko, esika batata na biso bakumisaki Yo, etumbami na moto, mpe biloko nyonso oyo tolingaki mingi bikomi libebi. 12Sima na makambo oyo nyonso, Yo okomipekisa, Tata na biso ? Okokanga monoko mpe okonyokola biso mingi boye ?