Ebimisami na papye
Buku

Yesu, Oyo Azali na Nguya mpo na Kobikisa

Moto moko autaki na Edomi, bilamba na ye etondi makila, mpo atambolaki ye moko likolo ya ekamolo ya vino, moto moko te azalaki kosalisa ye. Sima, makanisi ezongi na boboto: Tata na biso azalaki konyokwama na konyokwama ya bato na ye, amemaki bango, tii bapesaki Molimo na ye mawa. Esuki na kotuna esika boboto na ye ekendeki.

Tata na biso alobi na molongo 8

Mokapo 63.

Nani oyo azali koya uta na Edome, na bilamba oyo ekomi motane, uta na Bozera, oyo na nkembo na bilamba na Ye, azali kotambola na nguya na Ye monene ? « Ngai nde nazali kosakola bosembo, nazali na nguya mpo na kobikisa. » a a v1 Apostolo Yoane amonaki Yesu alati elamba oyo etumbolami na makila, azali konyata esika ya konyata vinyo ya nkanda ya Tata na Ye — Emoniseli 19:11-15.

Mpo na nini bilamba na Yo ezali motane, mpe bilamba na Yo ezali lokola ya moto oyo azali konyata vinyo ?

« Nanyati esika ya konyata vinyo ngai moko, mpe kati na bikolo moto moko azalaki elongo na Ngai te ; nakanzaki bango na nkanda na Ngai mpe nanyataki bango na nkanda na Ngai ya makasi ; makila na bango ekapukaki na bilamba na Ngai, mpe nabebisaki bilamba na Ngai nyonso na mbindo. Pamba te mokolo ya kozongisa mabe ezalaki na motema na Ngai, mpe mobu ya bato na Ngai oyo nasikolaki ekomaki. Natalaki, kasi moto moko te azalaki mpo na kosunga ; nakamwaki ete moto moko te alendisaki Ngai ; boye loboko na Ngai moko ememelaki Ngai lobiko, mpe nkanda na Ngai elendisaki Ngai. Nanyataki bikolo na nkanda na Ngai ; nalangwisaki bango na nkanda na Ngai, mpe nabwakaki makila na bango na mabele. »

Nakolobela Bolingo ya Tata na biso

Nakolobela bolingo ya boyokani ya Tata na biso, masanzoli na Ye, engebene na makambo nyonso oyo asalaki mpo na biso, mpe boboto monene oyo amonisaki na ndako ya Isalaele, engebene na mawa na Ye, engebene na bolingo na Ye ya boyokani oyo ebele.

Pamba te alobaki : « Solo bango bazali bato na Ngai, bana oyo bakokosa te. » Mpe akomaki Mobikisi na bango.

Na pasi na bango nyonso Ye mpe ayokaki pasi, mpe anjelo ya bozali na Ye abikisaki bango ; na bolingo na Ye mpe na mawa na Ye asikolaki bango ; atombolaki bango mpe amemaki bango mikolo nyonso ya kala. Kasi bango batombokaki mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye pasi ; boye abalukaki mpe akomaki monguna na bango, mpe Ye moko abundaki na bango. Bongo Ye akanisaki mikolo ya kala, ya Moyize mpe ya bato na Ye. Wapi Ye oyo abimisaki bango na mbu, elongo na babateli ya etonga na Ye ? Wapi Ye oyo atiaki Molimo Mosantu na Ye kati na bango, oyo atandaki loboko na Ye ya nkembo na loboko ya mobali ya Moyize, oyo akabolaki mai liboso na bango mpo na kosala mpo na Ye moko kombo ya seko, oyo atambolisaki bango na mozindo ? Lokola mpunda na esobe, bakweaki te. Lokola bibwele oyo ekiti na lobwaku, Molimo ya Tata na biso apemisaki bango. Boye Yo okambaki bato na Yo, mpo na kosala mpo na Yo moko kombo ya nkembo.

Kitisa Miso Uta na Likolo

Kitisa miso uta na likolo mpe tala, uta na esika na Yo ya bofandi ya bosantu mpe ya nkembo. Wapi molende na Yo mpe misala na Yo ya nguya ? Bolingo ya motema na Yo mpe mawa na Yo ebombami mosika na ngai. Pamba te Yo ozali Tata na biso, atako Abalayama ayebi biso te mpe Isalaele andimi biso te ; Yo ozali Tata na biso ; Mosikoli na biso uta kala mpe kala ezali kombo na Yo. Mpo na nini, Tata na biso, otiki biso tolongwa na banzela na Yo mpe okomisi motema na biso makasi, mpo ete tobanga Yo te ? Zonga mpo na basaleli na Yo, mabota ya libula na Yo. Mpo na mwa tango moke bato na Yo ya bosantu bazalaki na yango ; banguna na biso banyataki esika na Yo ya bosantu. Tokomi lokola bango oyo okonzaki bango ata mbala moko te, lokola bango oyo babengami na kombo na Yo te.