Ebimisami na papye
Buku

Davidi abikisi moto oyo Tata apakolaki mafuta

Saulo akɔti na lubwaku oyo Davidi abombami. Bato na Davidi bayebisi ye ete ezali likabo; ye akati kaka nsuka ya elamba, mpe yango mpe ebuki ye motema. Na libanda abengi Saulo tata na ye mpe atiki Tata atelemela bango.

Mokapo 24.

Sima na Saulo kozonga uta na kolanda Ba-Filisitia, bayebisaki ye ete : « Davidi azali na esobe ya Eni-Gedi. » Saulo akamataki bato 3 000 baponami kati na Isalaele mobimba mpo na koluka Davidi na bato na ye liboso ya Mabanga ya Bantaba ya zamba. Akomaki na bandako ya bampate pembeni ya nzela, esika libulu ya libanga ezalaki. Saulo akotaki kuna mpo na kosala mposa ya nzoto na ye; Davidi na bato na ye bafandaki na kati mpenza ya libulu. Bato ya Davidi balobaki na ye : « Oyo nde mokolo oyo Tata na biso alobaki na yo ete : ‹ Nazali kopesa monguna na yo na loboko na yo, mpo osala na ye ndenge olingi. › » Davidi atelemaki mpe akataki na kimia suka ya elamba ya Saulo. Sima na yango, motema na Davidi ebandaki kofundela ye mpo akataki suka ya elamba ya Saulo. Alobaki na bato na ye : « Tika ete Tata na biso apekisa ngai kosala likambo oyo na nkolo na ngai, moto oyo apakolami mafuta na Ye, kotombola loboko na ngai likolo na ye, pamba te azali moto oyo Tata na biso apakolaki mafuta. » Na maloba oyo Davidi apekisaki bato na ye babundisa Saulo te. Bongo Saulo abimaki na libulu mpe akendeki nzela na ye. Davidi atelemaki, abimaki na libulu mpe abelelaki Saulo na sima : « Nkolo na ngai mokonzi ! » Saulo atalaki sima, mpe Davidi afukamaki elongi na nse.

Davidi alobaki na Saulo : « Mpo na nini koyoka bato oyo bazali koloba ete : ‹ Tala, Davidi azali koluka kosala yo mabe › ? Lelo miso na yo mamonaki ndenge Tata na biso apesaki yo na loboko na ngai na libulu. Bamosusu batindikaki ngai nboma yo, kasi nabikisaki yo mpe nalobaki ete : ‹ Nakotombola loboko na ngai te likolo na nkolo na ngai, moto oyo Tata na biso apakolaki mafuta. › Tala, tata na ngai, tala suka ya elamba na yo na loboko na ngai ! Nakataki yango kasi nabomaki yo te. Yeba mpe tala ete mabe to botomboki ezali te na loboko na ngai. Nasalelaki yo masumu te, kasi yo ozali koluka bomoi na ngai mpo na kolongola yango. Tika ete Tata na biso akata likambo kati na yo na ngai, mpe Tata na biso azongisela ngai mabe likolo na yo, kasi loboko na ngai ekosimba yo te. Ndenge liloba ya kala elobi : ‹ Mabe euti na bato mabe. › Loboko na ngai ekozala likolo na yo te. Mokonzi ya Isalaele abimeli nani ? Ozali kolanda nani ? Mbwa ya liwa ? Mpuse moko ? Tika ete Tata na biso akata likambo kati na yo na ngai, amona yango, apesa ngai bosembo na likambo na ngai mpe abikisa ngai na loboko na yo. »

Tango Davidi asilisaki koloba maloba oyo na Saulo, Saulo alobaki : « Ezali mongongo na yo, mwana na ngai Davidi ? » mpe alelaki na mongongo makasi. Alobaki na Davidi : « Yo ozali moto ya bosembo koleka ngai; osalelaki ngai malamu, kasi ngai nasalelaki yo mabe. Lelo olakisaki malamu oyo osalelaki ngai : Tata na biso atiaki ngai na loboko na yo, kasi obomaki ngai te. Soki moto amoni monguna na ye, akotika ye akende na kimia ? Tika ete Tata na biso akozongisela yo malamu mpo na oyo osalelaki ngai lelo. Sik’oyo nayebi ete ya solo okozala mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekotelema makasi na loboko na yo. Boye lapa ndai epai na ngai na Kombo ya Tata na biso ete okokata bakitani na ngai sima na ngai te, mpe okolongola kombo na ngai na ndako ya tata na ngai te. »

Davidi alapaki ndai epai ya Saulo. Saulo azongaki na ndako; Davidi na bato na ye bamataki na esika makasi.