Molimo oyo ezali na posa ya mai
Mpo na mokambi ya miziki. Nzembo ya mayele ya bana ya Kore.
Akatami na tempelo mpe bazali kotuta ye: 'Nzambe na yo azali wapi?', mokoli ayokeli mpiko ebele ya bato ya fɛti oyo azalaki kokamba mpe akoki lisusu kokende elongo na bango te. Mbala mibale atuni molimo na ye oyo ezali na mawa, mpe eyano ezali moko: zela Tata na biso, nakosanzola ye lisusu.
42 1Lokola mboloko ezali kolula mai ya bibale, bongo molimo na ngai ezali kolula Yo, Tata na ngai.
2Molimo na ngai ezali na posa ya Tata na ngai, mpo na Tata oyo azali na bomoi. Tango nini nakoki koya komonana liboso na Ye ? 3Mpisoli na ngai ezali bilei na ngai moi na butu, tango bazali koloba na ngai mokolo mobimba : « Nzambe na yo azali wapi ? »
4Nazali kokanisa makambo oyo, tango nazali kosopa molimo na ngai : ndenge nazalaki kokende elongo na ebele ya bato mpe kokamba bango na molongo na ndako ya Tata na biso, na koganga ya esengo mpe na nzembo ya masanzoli, ebele monene ya bato oyo bazali kosepela.
5Mpo na nini ozali na mawa, molimo na ngai, mpe mpo na nini ozali kobulungana kati na ngai ? Tya elikya na Tata na biso ; pamba te nakosanzola Ye lisusu, lobiko na ngai mpe Tata na ngai.
6Tata na ngai, molimo na ngai ezali na mawa kati na ngai ; yango wana nakanisi Yo longwa na mokili ya Yordani mpe ya Ermoni, longwa na ngomba Mizara.
7Mozindo ezali kobenga mozindo mosusu na makelele ya mai na Yo oyo ezali kokita ; mbonge na Yo nyonso ya makasi mpe ya mai eleki likolo na ngai. 8Na moi Tata na biso azali kotinda bolingo na Ye ya boyokani, mpe na butu nzembo na Ye ezali elongo na ngai, libondeli epai ya Tata ya bomoi na ngai.
9Nazali koloba na Tata na ngai, libanga na ngai : « Mpo na nini obosani ngai ? Mpo na nini nazali kotambola na kolela mpo na minyoko ya monguna ? » 10Lokola mpota ya liwa kati na mikuwa na ngai, banguna na ngai bazali kotuka ngai, tango bazali koloba na ngai mokolo mobimba : « Nzambe na yo azali wapi ? »
11Mpo na nini ozali na mawa, molimo na ngai, mpe mpo na nini ozali kobulungana kati na ngai ? Tya elikya na Tata na biso ; pamba te nakosanzola Ye lisusu, lobiko na ngai mpe Tata na ngai.