Ye oyo Amonaka bato oyo bazangi nguya
Mpo na mokambi ya miziki. Nzembo ya Davidi.
Libondeli ya mbeto ya bokono oyo etɛlɛmi likoló ya elaka: Tata na biso akosimbisa moto oyo akanisaka bato oyo bazangi lisungi. Bayambi bayanganisaka masolo ya mabe mpe bakendaka kosala yango na libanda; banguna bazali kotánga ntango nini akokufa. Etumbu ya makasi koleka ezali moninga oyo andimelaki mpe alyaki limpa na ye.
41 1Esengo na moto oyo akanisaka mpo na bato oyo bazangi nguya ; Tata na biso akobikisa ye na mokolo ya pasi. 2Tata na biso akobatela ye mpe akotika ye azala na bomoi ; bakoloba ete azali na esengo na mokili. Okopesa ye te na posa ya banguna na ye. 3Tata na biso akosunga ye na mbeto ya maladi ; na maladi na ye, okozongisa ye na nzoto malamu.
4Ngai, nalobaki : « Tata na ngai, yokela ngai mawa ; bikisa ngai, pamba te nasali masumu epai na Yo. » 5Banguna na ngai bazali koloba mabe mpo na ngai : « Ekozala tango nini ye akokufa, mpe kombo na ye ekolimwa ? » 6Tango moto moko ayei komona ngai, alobaka maloba ya pamba, kasi na motema na ye azali kobomba mafinga ; sima abimaka mpe apanzaka mafinga yango.
7Bato nyonso oyo bayinaka ngai bazali kosolola na nse elongo mpo na kobunda na ngai ; bazali kokanisa mabe mpo na ngai. 8« Eloko ya kobomaka esopami likolo na ye ; ye oyo alali kuna, akotelema lisusu te. » 9Ata moninga na ngai ya motema oyo nandimaki, oyo azalaki kolia limpa na ngai, abalukeli ngai. a a v9 Yesu alobaki maloba oyo na butu oyo bapesaki Ye na maboko ya banguna, alakisaki Yudasi lokola moninga oyo azalaki kolia limpa na Ye mpe sima abalukelaki Ye (Yoane 13:18).
10Kasi Yo, Tata na ngai, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai, mpo ete nazongisela bango. 11Na oyo nayebi ete ozali kosepela na ngai : ete monguna na ngai azali koganga ete alongi ngai te. 12Mpo na ngai, ozali kosimba ngai na bosembo na ngai, mpe ozali kotia ngai liboso na Yo libela.
13Tika ete Tata na biso apambolama, kobanda libela kino libela. Amen mpe Amen.