Ebimisami na papye
Buku

Bingumba ya ekimelo mpo na bato oyo basali mabe te

Bingumba ya ebombelo na banzela ebongisami, po mobali oyo ekanga ya demi na ye ekweyi akima nkanda ya mozongisi-makila mpe ayoka ye. Bangenge ya ndelo etikali na esika oyo bankoko batiaki yango. Moto abelemisami na motatoli moko te, mpe motatoli ya lokuta azwi oyo ye alingaki mpo na ndeko na ye.

Mokapo 19.

Tango Tata na yo akosilisa bikolo oyo mokili na bango Ye akopesa yo, mpe yo okobenga bango libanda mpe okovanda kati na bingumba mpe kati na bandako na bango, kabola bingumba misato kati na mokili oyo Tata na yo azali kopesa yo mpo ete okoma na yango. Bongisa banzela mpe kabola na biteni misato mokili oyo Tata na yo akopesa yo lokola libula, mpo ete moto oyo abomi moto akima kuna. Likambo ya mobomi oyo akokima kuna mpo na kobika ezali boye : moto oyo abeti mozalani na ye na kolinga te, mpe ayinaki ye liboso te, lokola tango mobali moko akei na zamba elongo na mozalani na ye mpo na kokata nkoni, loboko na ye ebeti demba mpo na kokweisa nzete, ebende ya demba elongwe na nzete na yango mpe ebeti mozalani na ye, akufi. Akoki kokima na moko na bingumba oyo mpe abika. Soki te, mozongisi makila, azali kopela na nkanda, akoki kolanda mobomi na nzela molayi, kokoma ye mpe kobomba ye, atako abongi na liwa te, pamba te ayinaki mozalani na ye liboso te. a a v6 Mozongisi makila azalaki ndeko ya mosuni oyo azalaki pene koleka na moto oyo abomamaki. Na momesano ya kala, ye nde asengelaki kolanda mobomi. Bingumba ya ekimelo ebatelaki mobomi oyo abomi na likama na kozongisa mabe oyo kino ekosambisama malamu. Yango wana nazali kopesa yo mobeko : kabola bingumba misato mpo na yo. Soki Tata na yo atandi ndelo ya mokili na yo, ndenge Ye alapaki ndai epai na batata na yo, mpe apesi yo mokili nyonso oyo Ye alakaki bango, soki okobatela malamu mobeko oyo nyonso napesi yo lelo — kolinga Tata na yo mpe kotambola ntango nyonso na banzela na Ye — bakisa bingumba misato mosusu na misato oyo, mpo ete makila ya moto oyo asali mabe te esopama te kati na mokili oyo Tata na yo azali kopesa yo lokola libula, mpe ete lisumu ya makila ekweya na yo te. Kasi soki mobali moko ayini mozalani na ye, abombami mpo na ye, atelemeli ye, abeti ye mpe abomi ye, sima akimi na moko na bingumba oyo, bakolo ya engumba na ye bakotinda bato, bakozongisa ye uta kuna, mpe bakopesa ye na mozongisi makila mpo akufa. Koyokela ye mawa te ; longola na Isalaele lisumu ya makila ya moto oyo asali mabe te, mpo ete makambo ekende malamu na yo.

Pesa lokumu na ndelo ya mozalani na yo

Kolongola libanga ya ndelo ya mozalani na yo te, oyo bato ya liboso batia, kati na libula oyo okozwa na mokili oyo Tata na yo azali kopesa yo mpo ete okoma na yango.

Motatoli moko akoki kokweisa moto na lisumu moko te to na mabe moko te, ata ezali nini. Likambo etelemaka kaka na litatoli ya batatoli mibale to misato. Soki motatoli ya mabe atelemi mpo na kofunda moto mabe, mibali mibale oyo bazali na etumba basengeli kotelema liboso ya Tata na yo, liboso ya banganga-Nzambe mpe ya basambisi oyo bazali kosala na mikolo wana. Basambisi basengeli kolukaluka malamu. Soki motatoli azali motatoli ya lokuta, atatoli lokuta na ntina ya ndeko na ye, sala ye ndenge ye amonaki mpo na ndeko na ye ; longola mabe kati na yo. Basusu bakoyoka mpe bakobanga, mpe bakosala lisusu likambo ya mabe ya boye kati na yo te. Koyokela mawa te : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, lino mpo na lino, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.