Polo akomeli Timote
Mokanda ya suka ya Polo, akomaki wana azali pene ya liwa, apesi Timote mokumba mpe atindi ye ateya liloba.
1 1Polo, ntoma ya Yesu-Klisto na mokano ya Tata na biso, mpo na elaka ya bomoi kati na Yesu-Klisto, 2epai ya Timote, mwana na ngai ya bolingo : Ngolu, mawa mpe kimia euti epai ya Tata na biso mpe Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Pelisa moto oyo Tata na biso apesaki yo
3Nazali kopesa matondi na Tata na biso, oyo nazali kosalela na motema peto lokola bakoko na ngai basalaki, wana nazali kokanisa yo ntango nyonso kati na mabondeli na ngai, butu mpe moi. 4Wana nakanisi mayoli na yo, nazali na posa makasi ya komona yo, mpo ete natonda na esengo. 5Nakanisi kondima na yo ya solo, oyo ezalaki liboso kati na nkoko na yo ya mwasi Loyisi mpe mama na yo Eunisi, mpe sik’oyo nazali na ntembe te ete ezali mpe kati na yo.
6Yango wana nazali kokundolela yo ete opelisa moto ya likabo ya Tata na biso oyo ezali kati na yo, na kotia na ngai maboko likolo na yo. 7Pamba te Tata na biso apesaki biso molimo ya bobangi te, kasi Molimo ya nguya, ya bolingo mpe ya komipekisa. 8Boye koyoka soni te mpo na litatoli ya Nkolo na biso, mpe mpo na ngai, mokangami na Ye, kasi yoka pasi elongo na ngai mpo na Nsango Malamu, na nguya ya Tata na biso. 9Ye abikisaki biso mpe abengaki biso na libengi ya bosantu, na misala na biso te, kasi na mokano na Ye moko mpe na ngolu, oyo epesamaki na biso kati na Yesu-Klisto liboso ete ntango ebanda, 10mpe sik’oyo emonisami na komonana ya Mobikisi na biso Yesu-Klisto, oyo asukisaki liwa mpe apesaki pole na bomoi mpe na bozangi kokufa na nzela ya Nsango Malamu. 11Mpo na Nsango Malamu oyo, bakomisaki ngai mosakoli mpe ntoma mpe molakisi. 12Yango wana nazali konyokwama boye. Kasi nazali na soni te, pamba te nayebi Ye oyo nandimi, mpe nandimi ete akoki kobatela oyo epesami na ngai tii mokolo oyo akozonga.
13Simba makasi ndakisa ya maloba ya malamu oyo oyokaki epai na ngai, na kondima mpe na bolingo kati na Yesu-Klisto. 14Batela eloko ya motuya malamu oyo epesami na yo, na nzela ya Molimo Mosantu oyo afandi kati na biso.
15Oyebi likambo oyo : bato nyonso kati na etuka ya Azia bapesi ngai mokongo, kati na bango Fugelo mpe Elemogene. 16Tika ete Nkolo Yesu na biso ayokela libota ya Onesifolo mawa, pamba te ye apesaki ngai makasi mbala mingi mpe ayokaki soni te mpo na minyololo na ngai. 17Kasi tango akomaki na Roma, alukaki ngai na molende tii azwaki ngai. 18Tika ete Nkolo Yesu na biso apesa ye ete azwa mawa epai ya Nkolo na mokolo wana. Oyebi malamu ndenge nini asalelaki mingi na Efeze.