Ebimisami na papye
Buku

Bobeta maboko, bino mabota nyonso

Mpo na mokambi ya miziki. Nzembo ya bana ya Kora.

Koganga ya kolatisa mokonzi — kobɛta maboko, bakɔrɔ, mpe bikolo nyonso babengami, kaka Isalaele te. Tata na biso akei likoló na kiti na ye ya bokonzi, mpe bakonzi ya bikolo bakoli ndambo moko ya bato ya Abalayama. Azali Mokonzi ya mokili mobimba.

Mokapo 47.

Bino mabota nyonso, bobeta maboko ! Boganga epai ya Tata na biso na mongongo ya esengo ! Pamba te Tata na biso, Oyo Aleki Likolo, azali moto ya kobangisa, Mokonzi monene likolo ya mokili mobimba. Ye akitisi bato na nse na biso, mpe mabota na nse ya makolo na biso. Ye aponaki libula na biso mpo na biso, lokumu ya Yakobo oyo Ye alingi. a a v4 « Lokumu ya Yakobo » elakisi mokili ya elaka, libula oyo bato ya Yakobo bamonaki na motuya koleka eloko mosusu nyonso.

Tata na biso amati na mongongo ya esengo, Tata na biso na mongongo ya kelelo ya mpate. Bosanzola na nzembo Tata na biso, bosanzola ! Bosanzola na nzembo Mokonzi na biso, bosanzola ! Pamba te Tata na biso azali Mokonzi ya mokili mobimba ; bosanzola na nzembo ya mayele. Tata na biso azali koyangela mabota ; Tata na biso afandi na kiti na Ye ya bosantu. Bakonzi ya mabota bazali kosangana lokola bato ya Nzambe ya Abalayama. Pamba te nguba ya mokili ezali ya Tata na biso ; Ye atombolami mingi. b b v9 « Nguba » ezali liloba ya nzembo mpo na bakonzi, bango oyo bakambaka mpe bakengelaka bato na bango.