Elihu alobi lisusu
Elihu alobi ete lisumu ya bato mpe malamu ya bato ebongoli eloko te epai ya Nzambe, oyo azali likoló koleka mampata; yango ekweli bato mosusu. Bato oyo bazali konyokolama bazali koganga, kasi moto atuni te epai wapi Mozalisi na bango azali, oyo apesaka nzembo na butu. Yango wana Yobo azali kobakisa maloba kozanga eyebi.
35 1Elihu akobaki koloba : 2« Ozali kokanisa ete likambo oyo ezali bosembo ? Ozali koloba : ‹ Bosembo na ngai eleki bosembo ya Nzambe. › 3Pamba te ozali kotuna : ‹ Ezali na litomba nini mpo na yo ? Nakozwa nini soki nasali lisumu te ? › 4Nakozongisela yo biyano, yo elongo na baninga na yo. 5Tombola miso na yo na likolo mpe tala ; kanisa mapata, oyo eleki yo likolo. 6Soki osali lisumu, ozali kolonga nini epai na Ye ? Mpe soki mabunda na yo ezali mingi, ozali kosala nini epai na Ye ? 7Soki ozali na bosembo, ozali kopesa Ye nini ? To Ye azwi nini na loboko na yo ? 8Mabe na yo etungisaka kaka moto lokola yo, mpe bosembo na yo esalisaka kaka mwana na moto. 9Bato bazali kolela mpo na kilo ya minyoko ebele ; bazali kobelela lisalisi mpo na loboko ya bato na nguya. 10Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mozalisi na ngai azali wapi, Ye oyo apesaka banzembo na butu, 11oyo ateyaka biso koleka banyama ya mabele mpe asalaka biso na bwanya koleka ndeke ya likolo ? › 12Kuna bazali kobelela, kasi Ye azongiselaka bango te, mpo na lolendo ya bato mabe. 13Solo, Nzambe ayokaka lolelo ya pamba te ; Mozwi-ya-nguya-nyonso atalaka yango te. 14Ndenge nini lisusu akozongisela yo, tango ozali koloba ete ozali komona Ye te — atako likambo na yo ezali liboso na Ye mpe osengeli kozela Ye ? 15Mpe sik’oyo, mpo ete nkanda na Ye etumbolaki naino te, mpe Ye atiaki likebi moke na bozoba. 16Yobo azali kofungola monoko na ye na maloba ya pamba ; azali kobakisa maloba ebele kozanga boyebi. »