Ebimisami na papye
Buku

Tata azongisi boyokani na Ye na sika

Mabanga mapya ekatami mpe etiami na sanduku, mpe Levi aponami na Tata na biso moko lokola libula na bango. Sima motuna: Tata na biso azali kosenga nini epai na bino? Kobanga, kolinga mpe kosalela ye. Alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei, bongo bolinga mpe bapaya.

Tata na biso alobi na milongo 1–2, 11

Mokapo 10.

Na tango wana Tata na biso alobaki na ngai : « Pasola mapalanka mibale ya libanga lokola ya liboso, yaka epai na Ngai likolo ya ngomba, mpe sala sanduku ya nzete. Nakokoma na mapalanka yango maloba oyo ezalaki na mapalanka ya liboso oyo obebisaki, mpe okotia yango kati na sanduku. »

Boye nasalaki sanduku na nzete ya akasia, napasolaki mapalanka mibale ya libanga lokola ya liboso, mpe namataki likolo ya ngomba na mapalanka mibale na loboko na ngai. Ye akomaki na mapalanka, lokola na liboso, mibeko zomi oyo Tata na biso alobaki na bino na ngomba, kati na moto, na mokolo ya liyangani. Mpe Tata na biso apesaki yango na ngai. Nabalukaki, nakitaki na ngomba, mpe natiaki mapalanka kati na sanduku oyo nasalaki ; yango ezali kuna kino sik’oyo, lokola Tata na biso atindaki ngai.

Bana ya Isalaele batambolaki uta na Beeroti Bene-Yaakan kino na Mosera, esika Arona akufaki mpe akundamaki ; mwana na ye Eleazare asalaki mosala ya nganga-Nzambe na esika na ye. Uta kuna batambolaki kino na Gudegoda, mpe uta na Gudegoda kino na Yotebata, mokili ya bibale ya mai. Na tango wana Tata na biso aponaki libota ya Levi mpo na komema sanduku ya boyokani, mpo na kotelema liboso na Ye, mpo na kosalela Ye, mpe mpo na kopambola na kombo na Ye, lokola bazali kosala kino mokolo ya lelo. Yango wana Levi azali na eteni te mpe na libula te elongo na bandeko na ye ; Tata na biso nde azali libula na ye, lokola Tata na biso alakaki ye.

Nafandaki na ngomba, lokola na mbala ya liboso, mikolo ntuku minei mpe butu ntuku minei ; Tata na biso ayokelaki ngai lisusu ; Tata na biso alingaki kobebisa bino te.

Mpe Tata na biso alobaki na ngai : « Telema, tambola liboso ya bato, mpo ete bakota mpe bazwa mokili oyo nalapaki ndai na batata na bango mpo na kopesa bango yango. »

Oyo Tata na biso azali kosenga na bino

Mpe sik’oyo, Isalaele, Tata na biso azali kosenga na bino nini, bobele kobanga Ye, kotambola na banzela na Ye nyonso, kolinga Ye, mpe kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba, mpe kobatela mitindo ya Tata na biso mpe mibeko na Ye oyo nazali kopesa bino lelo, mpo na bolamu na bino ? Tala, likolo, likolo ya likolo, mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango, ezali ya Tata na biso. Kasi Tata na biso alingaki batata na bino, aponaki momboto na bango nsima na bango — bino, koleka mabota nyonso — lokola ezali lelo. Boye bokata ngenga ya motema na bino, mpe bozala na mutu makasi lisusu te. a a v16 « Bokata ngenga ya motema na bino » ezali kolakisa kokata nyonso oyo esalaka ete motema etelemela mpe ekangama — mpo na kofungola yango mobimba epai ya Tata na biso. Pamba te Tata na biso azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe monene, na nguya, oyo abangisaka, oyo atalaka bilongi ya bato te mpe andimaka kozwa mbongo ya kobuka bosembo te. Ye asalaka bosembo mpo na mwana oyo azali na tata te mpe mpo na mwasi oyo mobali na ye akufaki, alingaka mopaya, mpe apesaka ye bilei na bilamba. Boye bino mpe bosengeli kolinga mopaya, pamba te bozalaki bapaya na mokili ya Ejipito. Bobanga Tata na biso, bosalela Ye, bokangama na Ye, mpe bolapa ndai na kombo na Ye. Ye azali lokumu na bino, Tata na bino, oyo asalaki mpo na bino makambo oyo manene mpe ya kobangisa oyo miso na bino mimoni. Batata na bino bakitaki na Ejipito, bazalaki bato ntuku sambo ; sik’oyo Tata na biso asali bino ebele lokola minzoto ya likolo.