Kolela ya Davidi mpo na kobikisama
Shigayono ya Davidi, oyo ayimbelaki Tata na biso mpo na Kushi, moto ya libota ya Benyamini.
Kushi moBenyamini atuhi ye, Davidi alapi ndai: soki nasili kozongisela moninga mabe, tiká monguna na ngai ayinda ngai tii na putulu. Asengi Tata na ye, Mosambisi oyo ayekolaka mitema, asala, mpe atali bato ya makasi bakwei na libulu na bango moko.
7 1Tata na ngai, nazali kobombama epai na Yo ; bikisa ngai na bato nyonso oyo bazali kolanda ngai, mpe longola ngai, 2mpo ete atafuna ngai biteni-biteni te lokola nkosi, mpe abuka ngai bipai-bipai, wana moto moko te azali kobikisa. 3Tata na ngai, soki nasali likambo oyo, soki mabe ezali na maboko na ngai, 4soki nazongiseli moninga na ngai mabe, soki nabotoli monguna na ngai pamba, 5bongo tika ete monguna alanda ngai mpe akoma kozwa ngai, tika ete aniata bomoi na ngai na mabele mpe atika lokumu na ngai na putulu.
6Telema, Tata na ngai, na nkanda na Yo ; telema mpo na kobundisa nkanda ya banguna na ngai ; lamuka mpo na ngai — Yo otyaki bosambisi. 7Tika ete lisanga ya bikolo ezinga Yo ; fanda na likolo likolo na bango. 8Tata na biso azali kosambisa bikolo. Sambisa ngai, Tata na ngai, engebene na bosembo na ngai mpe engebene na bozangi mabe oyo ezali kati na ngai. 9Pesa suka na mabe ya bato mabe, kasi pesa makasi na bato ya bosembo — Yo oyo ozali koluka kati na makanisi mpe mitema, Tata ya bosembo. 10Nguba na ngai ezali Tata na ngai, oyo abikisaka bato ya motema sembo. 11Tata na biso azali mosambisi ya bosembo, Nzambe oyo azali koyoka nkanda mokolo na mokolo. 12Soki moto abongoli motema te, Tata na biso akopanza mopanga na Ye ; akangi likula na Ye mpe abongisi yango. 13Abongisi bisaleli na Ye ya liwa ; akomisi makonzi na Ye makonzi ya moto. 14Tala ndenge moto mabe azali na zemi ya mabe ; azwi zemi ya mpasi mpe abotaka lokuta. 15Atimolaka libulu mpe akomisaka yango mozindo, kasi akweyaka na libulu oyo asali. 16Mpasi na ye ezongaka na mutu na ye moko ; mabe ya makasi na ye ekweyaka na likolo ya mutu na ye moko. 17Nakotondela Tata na ngai mpo na bosembo na Ye, mpe nakoyimbela Kombo ya Tata na ngai, Oyo Aleli Likolo, nkembo.