Petelo akomeli bato oyo bapalanganaki mokanda
Lisungi epai ya bakristu oyo bazali konyokwama mpo na kondima na bango, oyo ekundolela bango elikya na bango ya bomoi mpe bozali na bango lokola bato oyo Tata na biso aponi.
Tata na biso alobi na molongo 16
1 1Petelo, ntoma ya Yesu-Klisto, epai ya bapaya oyo baponami, oyo bapalanganaki na Ponto, Galatia, Kapadokia, Azia mpe Bitinia. 2Baponami na boyebi ya liboso ya Tata na biso, basantisami na Molimo Mosantu, mpo na koyokela Yesu-Klisto mpe kosopelama na makila na Ye : tika ete ngolu mpe kimia ebakisama mingi na bino.
Babotami mbotama ya sika mpo na elikya ya bomoi
3Tika ete Tata na biso, Tata ya Nkolo na biso Yesu-Klisto, atombolama : na mawa na Ye monene apesaki biso mbotama ya sika na kati ya elikya ya bomoi, na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto na kati ya bakufi, 4mpo na libula oyo ekoki kobeba te, kosila te, mpe kokauka te, oyo ebombami na likolo mpo na bino, 5bino oyo babatelami na nguya ya Tata na biso na nzela ya kondima, mpo na lobiko oyo ebongisami mpo ekomonisama na tango ya suka. 6Bosepelaka mingi na yango, atako sik’oyo, mpo na tango moke, ekomi na ntina ete bozwa mawa na komekama ya ndenge na ndenge. 7Makambo oyo eyei mpo ete kondima na bino, oyo ekeyi komekama mpe emonani ya solo, oyo ezali na motuya koleka wolo oyo bapetolaka na moto kasi ebebaka naino, ememela bino masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. 8Atako bomonaki Ye ata mbala moko te, bolingaka Ye ; atako bomoni Ye te sik’oyo, bondimaka Ye, mpe bosepelaka na esengo oyo maloba ekoki kolimbola te mpe etondi na nkembo, 9pamba te bozali kozwa suka ya kondima na bino, oyo ezali lobiko ya milimo na bino.
10Basakoli oyo balobaki makambo ya ngolu oyo ebongisami mpo na bino, batalaki mpe batiolaki na bokebi likambo ya lobiko oyo, 11bazalaki kotiola tango mpe lolenge oyo Molimo ya Klisto oyo azalaki kati na bango alakisaki, tango asakolaki mpasi ya Klisto mpe nkembo oyo ekolanda yango. 12Emonisamaki na bango ete basalelaki bango moko te kasi bino, tango balobaki makambo oyo sik’oyo emonisami na bino na nzela ya bato oyo basakolaki Nsango Malamu na bino na Molimo Mosantu atindami uta na likolo. Ata banjelu balingi kotala makambo oyo.
Babengami mpo na kozala basantu
13Boye, bobongisa makanisi na bino mpo na misala mpe bozala na bokebi mobimba, mpe botia elikya na bino mobimba na ngolu oyo ekomemelama bino tango Yesu-Klisto akomonisama. 14Lokola bana oyo bayokaka, bozala na lolenge ya mposa oyo bolandaki kala na bozangi boyebi na bino te. 15Kasi lokola oyo abengaki bino azali mosantu, bozala basantu mpe bino na makambo na bino nyonso ;
16pamba te ekomami ete : « Bozala basantu, pamba te Ngai nazali mosantu. »
17Lokola bobelelaka Tata oyo asambisaka misala ya moto na moto na kotala elongi te, bofanda na tango ya bopaya na bino awa na bobangi ya limemya. 18Boyebi ete palata mpe wolo, biloko oyo ebebaka, ebikisaki bino te na bomoi ya pamba oyo bozwaki na bankoko na bino, 19kasi na makila ya motuya ya Klisto, mwana ya mpate oyo azangi mbeba mpe bosoto. 20Aponamaki liboso ete mokili ebongisama, mpe amonisamaki na tango oyo ya suka mpo na bino. 21Na nzela na Ye bondimi Tata na biso, oyo asekwisaki Ye na kati ya bakufi mpe apesaki Ye nkembo, boye kondima mpe elikya na bino ezali kati na Tata na biso.
22Lokola bopetolaki milimo na bino na botosi solo mpo na bolingo ya sembo mpo na bandeko, bolingana mingi na motema peto. 23Pamba te bobotami mbotama ya sika, te na mboto oyo ebebaka, kasi na oyo ebebaka te, na nzela ya liloba ya bomoi ya Tata na biso, oyo etikalaka libela. 24Pamba te, « Bato nyonso bazali lokola matiti, mpe nkembo na bango nyonso lokola fololo ya zamba ; matiti ekaukaka mpe fololo ekweyaka, 25kasi liloba ya Tata na biso etikalaka libela. » Mpe oyo nde liloba oyo esakolamaki na bino.