Komilengela mpo na bomipesi epai ya Nzambe
Paul akebisi na tina ya bateyi oyo bakangeli libala mpe bilei mosusu, nzokande nyonso oyo Tata na biso asali ezali malamu mpe endimami na botondi. Timote asengeli komilakisa mpo na bomoto ya Nzambe, atika moto moko te alekisa elenge na ye, atanga Makomi na miso ya bato, mpe atala bomoi na ye mpe mateya na ye malamu.
4 1Molimo Mosantu alobi polele ete na tango ya nsuka bato mosusu bakosundola bondimi, bakoyoka milimo ya bokosi mpe mateya ya bademo, 2na nzela ya bopi ya bato ya lokuta oyo makanisi na bango ya kati etumbami lokola na ebende ya moto. 3Bakopekisa libala mpe bakotinda bato baboya bilei oyo Tata na biso akelaki mpo ete bandimi oyo bayebi solo bayamba yango na botondi. 4Pamba te eloko nyonso oyo Tata na biso akelaki ezali malamu; eloko moko te esengeli kobwakama soki bayambi yango na botondi, 5pamba te esantisami na liloba ya Tata na biso mpe na libondeli.
6Soki ozali kolakisa bandeko makambo oyo, okozala mosali malamu ya Klisto Yesu, oyo azali kolisama na maloba ya bondimi mpe na mateya malamu oyo olandaki. 7Kosangana na masapo ya pamba oyo ezali na lokumu te te. Kasi, komilengela mpo na kozala na bomipesi epai ya Nzambe. 8Komilengela na nzoto epesaka litomba moke, kasi bomipesi epai ya Nzambe epesaka litomba na makambo nyonso, mpo elaki bomoi ya sik’oyo mpe bomoi oyo ekoya. 9Maloba oyo ezali ya solo mpe esengeli kondimama mobimba. 10Mpo na yango tozali kosala mosala makasi mpe kobunda, pamba te totie elikya na Tata oyo azali na bomoi, Mobikisi ya bato nyonso, mingi koleka ya bandimi. 11Pesa mitindo mpe teya makambo oyo.
12Tika ete moto moko te adela yo mpo na bolenge na yo, kasi zala ndakisa epai ya bandimi na maloba, na bizaleli, na bolingo, na bondimi mpe na bopeto. 13Tii nakoya, komipesa na kotanga Makomi na miso ya bato nyonso, na kosakola mpe na koteya. 14Kotala likabo oyo ezali kati na yo na ntina te, oyo epesamaki na nzela ya lisakola, tango bampaka batielaki yo maboko. 15Sala makambo oyo mpe komipesa mobimba na yango, mpo ete bato nyonso bamona ndenge ozali kokende liboso. 16Batela yo moko mpe mateya na yo malamu. Zala ngwi na yango, pamba te soki osali bongo, okobikisa yo moko mpe bato oyo bazali koyoka yo.