Bokumisa Kombo na Ye
Masanzoli oyo etongami na bilembo: Tata na biso asalaka nyonso oyo alingi na mai monene mpe na likoló, abetaki Ejipito, abwakisaki Sihon mpe Og mpe apesaki mokili na bango. Soki tolongoli yango na bikeko oyo ezali na minoko mpe miso ya litomba te, basali na yango batikali pamba lokola bikeko yango.
135 1Alleluya ! Bokumisa kombo ya Tata na biso ; bokumisa Ye, bino basaleli ya Tata na biso, 2bino oyo bozali kosalela na ndako ya Tata na biso, na mapango ya ndako ya Tata na biso.
3Bokumisa Tata na biso, pamba te Tata na biso azali malamu ; bina nzembo mpo na Kombo na Ye, pamba te ezali kosepelisa. 4Pamba te Tata na biso aponi Yakobo mpo na Ye moko, Isalaele lokola bozwi na Ye ya motuya.
5Pamba te nayebi ete Tata na biso azali monene, mpe Tata na biso, Mokonzi, azali likolo ya banzambe nyonso. 6Nyonso oyo esepelisaki Tata na biso, asali yango, na likolo mpe na mokili, na mbu mpe na bozindo na yango nyonso. 7Ye amatisaka mapata uta na suka ya mokili ; asalaka kake mpo na mbula mpe abimisaka mopepe na bibombelo na Ye.
8Abomaki bana ya liboso ya Ejipito, bato mpe nyama. 9Atindaki bilembo mpe makamwisi kati na yo, Ejipito, likolo ya Falao mpe basaleli na ye nyonso. 10Abomaki bikolo ebele mpe abomaki bakonzi ya nguya. 11Sihona, mokonzi ya Ba-Amori, mpe Ogi, mokonzi ya Bashana, mpe bokonzi nyonso ya Kanana, 12mpe apesaki mokili na bango lokola libula, libula na Isalaele, bato na Ye.
13Kombo na Yo, Tata na biso, ekotikala libela ; lokumu na Yo, Tata na biso, kati na mibu nyonso. 14Pamba te Tata na biso akosembola bato na Ye mpe akoyokela basaleli na Ye mawa.
15Bikeko ya bikolo ezali palata mpe wolo, mosala ya maboko ya bato. 16Bizali na minoko, kasi bikoki koloba te ; bizali na miso, kasi bikoki komona te ; 17bizali na matoi, kasi bikoki koyoka te, mpe mpema moko te ezali kati na minoko na yango. 18Baoyo basalaka yango bakokoma lokola yango, mpe bongo mpe bato nyonso oyo bakotyela yango motema.
19Ndako ya Isalaele, bopambola Tata na biso ; ndako ya Aron, bopambola Tata na biso ; 20ndako ya Levi, bopambola Tata na biso ; bino oyo bobangaka Tata na biso, bopambola Tata na biso. 21Tika ete Tata na biso apambolama uta na Siona, Ye oyo afandaka na Yelusalemi. Alleluya !