Bosembo ya motema kati na ndako na ngai
Nzembo ya Davidi.
Mobeko ya bizaleli ya mokonzi moko mpo na ye moko. Alapi ndai ete akotia na miso na ye biloko ya ntina te, akokitisa nsima mongongo ya oyo azali kofinga na nkuku, akopesa mosala kaka na bato ya bosembo mpe akotika moto ya lokuta afanda te na ndako na ye, mpe na ntongo nyonso akolongola bato mabe na engumba.
101 1Nakoyemba bolingo ya boyokani mpe bosembo ; nakobeta miziki mpo na Yo, Tata na ngai. 2Nakokeba mpo na kolanda nzela ya mbeba te. Tango nini okoya epai na ngai ? Nakotambola na motema ya sembo kati na ndako na ngai. 3Nakotia eloko ya pamba moko te liboso ya miso na ngai. Nayinaka misala ya bato oyo bapengwi ; yango ekokangama na ngai te. 4Motema ya kobalukana ekokende mosika na ngai ; nakoyeba mabe moko te. 5Moto oyo azali kofinga ndeko na ye na nkuku, ye nakosilisa ; moto oyo azali na miso ya lolendo mpe na motema ya togi, nakondima ye te. 6Miso na ngai etali bato ya sembo ya mokili, mpo ete bafanda elongo na ngai ; moto oyo azali kotambola na nzela ya mbeba te akosalela ngai. 7Moto moko te oyo azali kosala bokosi akofanda kati na ndako na ngai ; moto moko te oyo azali koloba lokuta akotelema makasi liboso ya miso na ngai. 8Ntongo nyonso nakosilisa bato mabe nyonso ya mokili, mpe nakolongola mosali mabe nyonso na engumba ya Tata na biso.