Mokili ya mapapu oyo ezali koganga
Bantoma bazali kokima na masuwa ya papyrus, bauti na ekolo ya mosika mpe ya kobangisa, kasi Tata na biso alobi ete akokala nyɛɛ mpe akotala, lokola molunge na moi, kino mokolo moke liboso ya kobuka mbuma — bongo akokata bitape. Sima na yango bato yango bakomema makabo na Ngomba Zion bango moko.
Tata na biso alobi na molongo 4
18 1Ee, mokili ya mapapu oyo ezali koganga, oyo ezali na ngambo mosusu ya bibale ya Kushi, 2oyo etindaka bantoma na mbu, na mikanga ya papirisi likolo ya mai. Bokende, bantoma ya mbangu, epai ya ekolo ya bato molayi oyo loposo na bango ezali peto, epai ya ekolo oyo bato bazali kobanga na pene mpe na mosika, ekolo ya nguya oyo ezali konyata, oyo bibale ekabolaka mokili na yango. 3Bino bato nyonso ya mokili, bino oyo bofandi na mabele : tango bendera ekotombolama na bangomba, botala ! Tango bakobeta kelelo, boyoka !
4Pamba te Tata na biso alobaki na ngai boye : Nakozala kimia, mpe nakotala longwa na esika na Ngai ya kofanda, lokola moto ya moi oyo ezali peto, lokola lipata ya mamwa na tango ya moto ya kobuka.
5Pamba te liboso ya kobuka, tango fololo esili mpe likoyi ekomi mbuma ya vino oyo ezali kopela, Tata na biso akokata bitape na mbeli ya kokata nzete, mpe bitape oyo ekomi mingi akolongola yango mpe akokata yango. 6Yango nyonso ekotikala mpo na bandeke oyo ekolia nyama ya bangomba mpe mpo na banyama ya mokili. Bandeke oyo ekolia nyama ekolekisa eleko ya moi likolo na yango, mpe banyama nyonso ya mokili bakolekisa eleko ya mpio likolo na yango. 7Na tango wana makabo makomemama epai ya Tata ya mampinga ya likolo, longwa na ekolo ya bato molayi oyo loposo na bango ezali peto, longwa na ekolo oyo bato bazali kobanga na pene mpe na mosika, ekolo ya nguya oyo ezali konyata, oyo bibale ekabolaka mokili na yango, na esika ya kombo ya Tata ya mampinga ya likolo, Ngomba Siona.