Mokolo ya Nkolo ekoya
Mokolo ekoya lokola moyibi, kasi bazali na molili te mpo na yango, yango wana bomeka kolala te mpe bozala na makanisi ya peto. Na nsuka ezali ndenge ya mokemoke ya mitindo: botala bakambi na bino na lokumu, bolendisa bato oyo bazali na mawa, bozala na motema molai, bosepela, bobondela, botondela Nzambe, botala makambo nyonso malamu, mpe bokanga makasi oyo ezali malamu.
5 1Mpo na tango mpe bantango, bandeko, esengeli te ete bakomela bino. 2Pamba te bino moko boyebi malamu ete mokolo ya Nkolo na biso Yesu ekoya lokola moyibi na butu. 3Tango bato bazali koloba : « Kimia mpe libateli », libebi ya mbala moko ekokweya likolo na bango, lokola mpasi ya kobota ekweyaka na mwasi ya zemi, mpe bakokima te. 4Kasi bino, bandeko, bozali na molili te mpo ete mokolo yango ekweyela bino mbala moko lokola moyibi. 5Bino nyonso bozali bana ya pole mpe bana ya mokolo ; tozali ya butu te to ya molili te. 6Boye, tika ete tolala lokola basusu te, kasi tozala kolamuka mpe kobatela makanisi na biso malamu. 7Pamba te baoyo balalaka, balalaka na butu, mpe baoyo balangwaka, balangwaka na butu. 8Kasi lokola tozali ya mokolo, tika ete tobatela makanisi na biso malamu, tolata kondima mpe bolingo lokola ekoti ya bibende oyo ebatelaka motema, mpe elikya ya libiki lokola kofia ya bibende na moto. 9Pamba te Tata na biso aponaki biso mpo na kozwa nkanda te, kasi mpo na kozwa libiki na nzela ya Nkolo na biso Yesu-Klisto, 10oyo akufaki mpo na biso, mpo ete soki tolamuki to tolali, tozala na bomoi elongo na Ye. 11Yango wana, bolendisana mpe botongana, lokola bozali kosala.
Kozala lokola bana ya pole
12Bandeko, tozali kosenga bino ete bopesa lokumu na baoyo bazali kosala makasi kati na bino, bazali kokamba bino kati na Nkolo mpe kokebisa bino. 13Botala bango na lokumu monene na bolingo mpo na mosala na bango. Bozala na kimia kati na bino.
14Bandeko, tozali kolendisa bino : bokebisa baoyo bazali kosala te, bobondisa baoyo bazali na bobangi, bosunga bato ya botau, bozala na motema molai epai na bato nyonso. 15Bokeba ete moto moko te azongisela moto mabe mpo na mabe, kasi bokoba ntango nyonso koluka malamu mpo na bino moko na moko mpe mpo na bato nyonso.
16Bosepela ntango nyonso, 17bobondela kozanga kotika, 18bopesa matondi na makambo nyonso ; pamba te yango nde mokano ya Tata na biso kati na Klisto Yesu mpo na bino. 19Bozimisa Molimo Mosantu te. 20Botiola maloba ya bosakoli te, 21kasi bomeka makambo nyonso ; bosimba oyo ezali malamu. 22Bokima mabe ya ndenge nyonso.
23Tika ete Tata na biso ya kimia Ye moko asantisa bino mobimba, mpe tika ete bobatelama na mabe moko te, molimo na bino, motema mpe nzoto, tango Nkolo na biso Yesu-Klisto akoya. 24Ye oyo azali kobenga bino azali sembo ; Ye moko akosala yango.
25Bandeko, bobondela mpo na biso.
26Bopesa bandeko nyonso mbote na monoko ya bosantu. 27Nazali kolapa bino ndayi liboso ya Nkolo ete mokanda oyo etangelama bandeko nyonso.
28Tika ete ngolu ya Nkolo na biso Yesu-Klisto ezala na bino.