Ebimisami na papye
Buku

Loyembo mpo na Sabata

Nzembo. Loyembo mpo na mokolo ya Sabata.

Nzembo ya Sabata na mikolo ekeseni. Bato mabe bakolaka noki lokola matiti mpe bakobungaka; bato sembo bakolaka malembe, lokola nkoma mpe sedre, bazali naino kobota mbuma mpe kozala motane na bobange mpo na esika oyo batyami: ndako ya Tata na biso.

Mokapo 92.

Ezali malamu kopesa matondi na Tata na biso, koyemba nyimbo ya litondi mpo na Kombo na Yo, Oyo Aleki Likolo, kosakola bolingo na Yo ya boyokani na ntongo, mpe bosolo na Yo na butu, na kinanga ya nzinga zomi mpe na nzenze, na loyembo ya kinanga. Pamba te Yo osepelisi ngai, Tata na biso, na mosala na Yo ; nazali koyemba na esengo mpo na misala ya maboko na Yo. Misala na Yo mizali minene boni, Tata na biso ! Makanisi na Yo mazali mozindo mingi ! Moto ya bozoba ayebi te, mpe zoba asosoli likambo oyo te :

Atako bato mabe bazali kobima lokola matiti mpe basali mabe nyonso bazali kokola malamu, bakobebisama mpo na libela. Kasi Yo, Tata na biso, ozali likolo mpo na libela. Pamba te tala, banguna na Yo, Tata na biso — tala, banguna na Yo bakosila ; basali mabe nyonso bakopanzana. Kasi Yo otombolaki liseke na ngai likolo lokola ngombe ya zamba ; napakolami mafuta ya sika. Miso na ngai mamoni banguna na ngai oyo bazali kokengela ngai ; matoyi na ngai mayoki bobebisami ya bato mabe oyo bazali kotelemela ngai. Bato ya bosembo bakolaka malamu lokola mopalema ; bakolaka lokola sedele ya Libanu. Balonami kati na ndako ya Tata na biso, bakolaka malamu na mapango ya Tata na biso. Bazali naino kobota mbuma na bokoko ; bazali kozala sika mpe na bomoi, mpo na kosakola ete Tata na biso azali sembo ; Ye azali libanga na ngai, mpe bozangi bosembo ezali kati na Ye te.