Loyembo ya sika mpo na mokili mobimba
Loyembo ya sika ezali ya mission: lakisa misala ya Tata na biso na kati ya bikolo, komema likabo, loba na bango ete azali kokonza. Banzambe mosusu ezali bikelamu ya maboko ya bato oyo ezali na ntina te. Ata mbu, bilanga mpe nzete ya zamba babyangami mpo na kosepela na Mosambisi oyo azali koya.
96 1Boyembela Tata na biso loyembo ya sika ; boyembela Tata na biso, mokili mobimba.
2Boyembela Tata na biso, bopambola Kombo na Ye ; bosakola lobiko na Ye mokolo na mokolo. 3Bosakola misala na Ye ya nkembo kati na bikolo, misala na Ye ya kokamwa kati na mabota nyonso. 4Pamba te Tata na biso azali monene mpe abongi na masanzoli mingi koleka ; asengeli kobangama koleka banzambe nyonso. 5Pamba te banzambe nyonso ya mabota bazali bikeko, kasi Tata na biso asalaki likolo. 6Nkembo mpe lokumu ezali liboso na Ye ; nguya mpe kitoko ezali kati na esika na Ye ya bosantu.
7Bopesa Tata na biso, bino mabota nyonso ya bato, bopesa Tata na biso nkembo mpe nguya. 8Bopesa Tata na biso nkembo oyo ebongi na Kombo na Ye ; bomema likabo mpe boyingela kati na mapango na Ye. 9Bosambela Tata na biso na nkembo ya bosantu ; botengatenga liboso na Ye, mokili mobimba. 10Boloba kati na bikolo : « Tata na biso azali koyangela ! Mokili etelemisami makasi, ekoningana te. Ye akosambisa mabota na bosembo. »
11Tika ete likolo esepela, mpe tika ete mokili esepela ; tika ete mbu eganga, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango. 12Tika ete elanga esepela, mpe biloko nyonso kati na yango ; bongo nzete nyonso ya zamba ekoyemba na esengo. 13Liboso na Tata na biso, pamba te Ye azali koya, pamba te azali koya mpo na kosambisa mokili. Akosambisa mokili na bosembo, mpe mabota na bosolo na Ye.