Moyize na bankulutu bazali koloba
Katá Yordani, pakolá mabanga monene na plastere, mpe komá mobeko oyo na yango polele; kela altare ya Tata na yo na mabanga oyo ekatami te mpe lia kuna makabo ya kimia. Sima mabota motoba na Gerizimi mpe mabota motoba na Ebali, ntango Balevi bazali kolela bolakelo zomi na mibale mpe bato nyonso bazongisi Amen.
27 1Moyize na bankulutu ya Isalaele bapesaki bato mitindo : « Bobatela mitindo nyonso oyo napesi bino lelo. 2Tango bokokatisa Yordani mpe bokokota na mokili oyo Tata na bino azali kopesa bino, botelemisa mabanga minene mpe bopakola yango na pilatele. 3Bokoma likolo na yango maloba nyonso ya mibeko oyo tango bokokatisa, mpo na kokota na mokili oyo Tata na bino azali kopesa bino, mokili oyo ezali kotonda na miliki mpe na mafuta ya nzoi, ndenge Tata na biso alakaki bino. 4Tango bokokatisa Yordani, botelemisa mabanga oyo na ngomba Ebala, ndenge natindi bino lelo, mpe bopakola yango na pilatele. a a v4 Ngomba Ebala mpe ngomba Gerizimi ezali bangomba mibale oyo ekokani, etelemi na mipanzi ya engumba Sikemi na katikati ya Kanana ; na kiti ya boyokani, lipamboli etiamaki na likolo ya moko mpe bolakeli mabe na likolo ya mosusu. 5Kuna, botongela Tata na bino etumbelo, etumbelo ya mabanga ; tika ete esaleli ya ebende ekoma na yango te. 6Botonga etumbelo ya Tata na bino na mabanga oyo ekatami te, mpe bopesa likolo na yango makabo ya kotumba mpo na Tata na bino. 7Bopesa makabo ya kimia mpe bolia yango kuna, mpe bosepela liboso ya Tata na bino. 8Mpe bokoma likolo ya mabanga maloba nyonso ya mibeko oyo polele penza. »
Bozali bato na Ye
9Moyize na banganga-Nzambe ba-Levi balobaki na Isalaele mobimba : « Bokanga monoko, Isalaele, mpe boyoka. Lelo bokomi bato ya Tata na bino. 10Botosa Tata na bino, bobatela malako na Ye mpe mibeko na Ye oyo natindi bino lelo. »
11Na mokolo yango moko, Moyize apesaki bato mitindo : 12« Sima na bokatisi Yordani, bato oyo bakotelema na ngomba Gerizimi mpo na kopambola bato : Simeoni, Levi, Yuda, Isakari, Yozefu mpe Benyamini. 13Mpe bato oyo bakotelema na ngomba Ebala mpo na bolakeli mabe : Rubeni, Gadi, Asere, Zabulona, Dani mpe Nefitali. 14Mpe ba-Levi bakoloba na mongongo makasi epai ya bato nyonso ya Isalaele : 15‹ Alakelami mabe moto oyo akopakola to akosopa elilingi, eloko ya nsomo epai ya Tata na biso, esalami na maboko ya mosali, mpe akotia yango na nkuku. › Bato nyonso basengeli kozongisa : ‹ Amen. › »
16« Alakelami mabe moto oyo akotiola tata to mama. » Bato nyonso bakoloba : « Amen. »
17« Alakelami mabe moto oyo akolongola elembo ya ndelo ya mozalani na ye. » Mpe bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
18« Alakelami mabe moto oyo akobungisa moto akufi miso na nzela. » Bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
19« Alakelami mabe moto oyo akopekisa bosembo epai ya mopaya, ya mwana oyo azali na tata te, to ya mwasi oyo akufelaki mobali. » Bato nyonso bakoloba : « Amen. »
20Alakelami mabe moto oyo akolala na mwasi ya tata na ye, pamba te abebisi libala ya tata na ye. Bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
21« Alakelami mabe moto oyo akolala na nyama. » Mpe bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
22« Alakelami mabe moto oyo akolala na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya mwasi ya tata na ye to mwana ya mwasi ya mama na ye. » Bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
23« Alakelami mabe moto oyo akolala na mama ya mwasi na ye. » Mpe bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
24« Alakelami mabe moto oyo akoboma mozalani na ye na nkuku. » Mpe bato nyonso basengeli koloba : « Amen. »
25« Alakelami mabe moto oyo akoyamba mbongo mpo na koboma moto oyo azali na mabe te. » Bato nyonso bakoloba : « Amen. »
26« Alakelami mabe moto oyo akosimba mpe akotosa maloba ya mibeko oyo te. » Bato nyonso basengeli koloba : « Amen. » b b v26 Polo alobeli liloba oyo na Ba-Galatia 3:10 mpo na kolakisa ete moto nyonso oyo atii elikya na kotosa mibeko azali na nse ya bolakeli mabe na yango, bolakeli oyo Yesu alongolaki na kokoma bolakeli mabe mpo na biso na ekulusu (Ba-Galatia 3:13).