Kolata bibundeli mpo na mokano ya Tata
Baninga ya kala basilikaka ntango otiki kosangana na bango, mpe Petelo alobi: bozela yango. Ayebisi batangi ete bazala na makanisi ya polele, bayamba bapaya na kozanga koimaima, mpe basalela likabo nyonso oyo bazali na yango. Komekama ya moto ezali likambo ya kokamwa te — kosambisama ebandi na libota ya Tata na biso ye moko.
4 1Boye, lokola Klisto anyokolamaki na nzoto, bino mpe bolata makanisi yango moko lokola bibundeli : moto oyo anyokolami na nzoto asilisi kosala masumu. 2Boye bozali lisusu kobuka tango oyo etikali na bomoi na nzoto mpo na mposa ya bato te, kasi mpo na mokano ya Tata na biso. 3Tango oyo eleki ekoki mpo na bino kosala makambo oyo bato oyo bayebi Tata te balingaka : kozala na bomoi ya pite, mposa ya mabe, kolangwa masanga, bilambo ya mobulu, masanga ebele, mpe kosambela bikeko na mobulu. 4Bakamwaka ete bozali lisusu kokende elongo na bango te na mobulu yango moko ya bomoi ya pite, boye bazali kotukana bino mpo na yango. 5Kasi bakozongisa eyano epai ya Ye oyo azali pene ya kosambisa bato ya bomoi mpe bakufi. 6Yango wana Nsango Malamu eyebisamaki ata epai ya bato oyo bakufi sik’oyo : basambisami na nzoto lokola bato nyonso, kasi tika ete bazala na bomoi na molimo lokola Tata na biso azali na bomoi.
7Nsuka ya biloko nyonso ezali pene. Yango wana, bozala na makanisi ya malamu mpe bomikanga, mpo ete bokoka kobondela. 8Likolo ya nyonso, bokoba kolingana na bolingo makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele. 9Bozwa bapaya malamu epai na bino moko na moko, bolobaloba te. 10Moko na moko na bino asalela likabo oyo azwi mpo na kosalisa basusu, lokola bakengeli malamu ya ngolu ya Tata na biso oyo ezali ya lolenge na lolenge. 11Moto oyo azali koloba, aloba lokola moto oyo azali kopesa maloba ya Tata na biso penza. Moto oyo azali kosalela, asala na nguya oyo Ye apesaka, mpo ete na makambo nyonso Ye atombolama na nzela ya Yesu-Klisto. Nkembo mpe nguya ezali ya Ye libela na libela. Amen.
Konyokolama mpo na Kombo ya Tata
12Balingami, bokamwa te na komekama ya moto oyo ezali komeka bino, lokola makambo ya kokamwa ezali kosalema na bino. 13Kasi bosepela na ndenge bozali na ndambo na pasi ya Klisto, mpo ete tango nkembo na Ye ekomonisama, bino mpe bosepela na esengo monene. 14Soki batukani bino mpo na Kombo ya Klisto, bozali na esengo, pamba te Molimo ya nkembo mpe ya Tata na biso afandi likolo na bino. 15Tika ete moto moko te na bino anyokolama lokola mobomi, moyibi, mosali mabe, to moto oyo amipesaka na makambo ya basusu. 16Kasi soki bonyokolami lokola Moklisto, boyoka nsoni te, kasi bosanzola Tata na biso mpo ete bozali na kombo yango. 17Pamba te ezali tango ya bosambisi ebanda na ndako ya Tata na biso ; soki ebandi na biso, nsuka na bato oyo bayokelaka Nsango Malamu ya Tata na biso te ekozala boni ? 18Mpe, « Soki moto ya bosembo abikisami na mpasi, moto oyo azali kokumisa Tata te mpe mosumuki bakozala boni ? » 19Boye, bato oyo bazali konyokolama na mokano ya Tata na biso, bapesa milimo na bango epai ya Mozalisi na bango oyo azali sembo, wana bazali kosala malamu.