Ebimisami na papye
Buku

Afandi na kiti ya bokonzi

Mbala misato nzembo etelemi mpo na koloba: azali mosantu. Tata na biso, Mokonzi oyo azali koningisa mokili, alingi mpe bosembo, mpe bilembo na yango ezali Moyize, Arona mpe Samwele, bato oyo apesaki bango eyano uta na likonzi ya lipata, oyo alimbisaki bango, mpe atikaki naino kosenga bango mikanda.

Mokapo 99.

Tata na biso azali koyangela ; tika ete mabota matengatenga ! Afandi na kiti ya bokonzi likolo ya ba-kelubi ; tika ete mokili eningana ! Tata na biso azali monene na Siona ; atombolami likolo ya mabota nyonso. Tika ete bakumisa Kombo na Yo monene mpe ya kobangisa ; Ye azali mosantu !

Mokonzi ya nguya alingaka bosambisi ya sembo. Yo otie bosembo ; osali bosambisi mpe bosembo kati na Yakobo. Botombola Tata na biso ; bofukamela na kiti ya makolo na Ye ! Ye azali mosantu !

Moyize na Aron bazalaki kati na banganga-nzambe na Ye, mpe Samwele azalaki kati na baoyo babyangaki Kombo na Ye. Babyangaki Tata na biso, mpe Ye azongisaki bango. Na likonzi ya lipata alobaki na bango ; babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.

Tata na biso, Yo ozongisaki bango ; ozalaki Tata oyo alimbisaka bango, kasi ozwisaki bango etumbu mpo na mabe na bango. Botombola Tata na biso, mpe bofukamela na ngomba na Ye ya bosantu ; pamba te Tata na biso azali mosantu !