Loyembo ya sika
Nzembo.
Loyembo ya garo mpo na likambo esili kosalema: lobiko oyo Tata na biso azwaki na lobɔkɔ na ye moko mpe amonisaki polele na miso ya bikolo oyo ezalaki kotala, na kobatela bokokani na Isalaele. Na nsima bisaleli ebandi koganga, bibale ekokosa maboko mpe bangomba eyemba, mpo ete ayei kosambisa na sembo.
98 1Boyembela Tata na biso loyembo ya sika, pamba te asali makambo ya kokamwa ; loboko na Ye ya mobali mpe loboko na Ye ya bosantu epesi Ye elonga. 2Tata na biso ayebisi bato lobiko na Ye ; amonisi bosembo na Ye na miso ya bikolo. 3Akanisi bolingo na Ye ya boyokani mpe bosolo na Ye epai ya ndako ya Isalaele ; nsuka nyonso ya mokili emoni lobiko ya Tata na biso.
4Boganga na esengo mpo na Tata na biso, bino mokili mobimba ; bobanda koyemba na esengo mpe boyemba masanzoli. 5Boyemba masanzoli epai ya Tata na biso na nzenze, na nzenze mpe na mongongo ya loyembo. 6Na bakelelo mpe na mongongo ya kelelo ya mpongo, boganga na esengo liboso ya Mokonzi, Tata na biso.
7Tika ete mbu eganga makasi, mpe biloko nyonso ezali kati na yango ; mokili mpe bato nyonso bazali kati na yango. 8Tika ete bibale ebeta maboko ; tika ete bangomba bayemba na esengo elongo, 9liboso ya Tata na biso, pamba te ayei kosambisa mokili. Akosambisa mokili na bosembo, mpe mabota na boyengebene.