Mwana moke na kimia
Nzembo ya bobata likolo. Ya Davidi.
Baverse misato ya bomoke na mokano. Davidi ayebisi Tata na ye ete atiki kolonga makambo oyo eleki ye, mpe atie motema na ye kimia lokola mwana oyo alongwe na mabele ya mama na ye — azali lisusu kolela mpo na kolia te, kasi alingi kaka kokangama.
Mokapo 131.
131 1Tata na ngai, motema na ngai etombwami te, mpe miso na ngai etombwami te ; nazali komitungisa na makambo oyo eleki monene mpe ya kokamwa mpo na ngai te. 2Solo natyoli molimo na ngai na kimia mpe nakanisi yango, lokola mwana oyo abimisami na mabele ya mama na ye ; molimo na ngai kati na ngai ezali lokola mwana oyo abimisami na mabele. 3Isalaele, tya elikya na yo epai ya Tata na biso, sik’oyo mpe libela na libela.