Epai na Timoteo, mwana na ngai ya solo
Toli ya Polo lokola mobateli ya bampate epai ya Timote elenge, na ntina ya kotia Eklezya na molongo mpe kobatela mateya ya malamu.
1 1Polo, ntoma ya Klisto Yesu na mitindo ya Tata na biso, Mobikisi na biso, mpe ya Klisto Yesu, elikya na biso, 2epai na Timoteo, mwana na ngai ya solo na kondima : ngolu, mawa mpe kimia euti epai ya Tata na biso mpe Klisto Yesu, Nkolo na biso.
Batela ndako ya Tata
3Lokola nasengaki yo makasi tango nazalaki kokende na Makedonia, vanda na Efeso mpo ete opesa mitindo na bato mosusu ete bateya mateya ya mosusu te, 4mpe bamipesa te na masolo ya lokuta mpe na milongo ya bankoko oyo esilaka te, oyo ebimisaka koswana na esika ya bokambi ya ndako ya Tata na biso na nzela ya kondima. 5Ntina ya mitindo oyo ezali bolingo oyo euti na motema peto, na makanisi malamu mpe na kondima ya bokosi te. 6Bato mosusu batiki makambo oyo mpe bakei na maloba ya pamba, 7bazali na mposa ya kozala bateyi ya mibeko, kasi bayebi te makambo oyo bazali koloba, to oyo bazali kosimbaka makasi boye.
8Sik’oyo toyebi ete mibeko ezali malamu, soki esalelami ndenge ebongi, 9toyebi mpe ete mibeko etiamaki mpo na bato ya bosembo te, kasi mpo na bato oyo bazali kotosa mibeko te mpe bato ya mitema makasi, bato mabe mpe basumuki, bato ya bosantu te mpe oyo bazali kotosa Nzambe te, oyo bazali kobetaka batata na bango mpe bamama na bango, mpe mpo na bakoboma bato, 10bato ya ndumba, mibali oyo balalaka na mibali, bato oyo bazali koteka bato, bato ya lokuta, bato oyo bazali kolapa ndai ya lokuta, mpe nyonso oyo ezali kotelemela mateya ya malamu, 11ndenge Nsango Malamu ya nkembo ya Tata na biso oyo apambolami ezali, oyo bapesaki ngai.
Mawa ya Tata eyaki epai ya moto mabe koleka
12Nazali kotondela Klisto Yesu, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai makasi, pamba te amonaki ngai ete nazali sembo, mpe atiaki ngai na mosala na Ye. 13Kala nazalaki kofinga Nzambe, kotiola bato mpe kosala makambo na mobulu, kasi nayokelamaki mawa, pamba te nasalaki yango na bososoli te, na kondima te. 14Ngolu ya Nkolo na biso etondaki mpo na ngai, elongo na kondima mpe bolingo ya kati na Klisto Yesu. 15Liloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kondimama mobimba : Klisto Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki — mpe ngai nazali moto mabe koleka kati na bango. 16Kasi nayokelamaki mawa mpo na likambo oyo : kati na ngai, moto mabe koleka kati na basumuki, Klisto Yesu amonisaki motema molai na Ye mobimba, mpo na kozala ndakisa mpo na bato oyo bakokondima Ye mpo na bomoi ya seko. 17Mpo na Mokonzi ya mikolo nyonso, oyo akufaka te, amonanaka te, Nzambe se moko, tika ete lokumu mpe nkembo ezala na Ye seko na seko. Amen.
Tumba etumba ya malamu
18Timoteo, mwana na ngai, nazali kopesa yo mokumba oyo, ndenge bamilakisi oyo balobaki kala likolo na yo ezali, mpo ete na yango otumba etumba ya malamu, 19ozala kosimba kondima mpe makanisi malamu. Mpo na koboya yango, bato mosusu bapesi kondima na bango kobukana lokola masuwa, 20kati na bango Imeneo mpe Alekizandre, oyo napesaki na Satana mpo ete bateyama kofinga Nzambe te.