Misisa ya biso ezali kati na Tata
Loyembo ya komata.
Elikya ezali kolimbolama na ndenge ya bisika. Baoyo batii elikya na bango bazali lokola ngomba Siona oyo ekoningana te, mpe Tata na biso azingi bango lokola bangomba ezingi Yerusaleme. Bokonzi ya mabe ekovanda te likoló na mokili oyo, mpo ekoluka kobendana bato malamu na kosala mabe.
125 1Bato oyo bakotyaka elikya na bango epai ya Tata na biso bazali lokola ngomba Siona, oyo ekoki koningana te kasi ekotikala seko na seko. 2Lokola ba ngomba ezingi Yelusalemi, boye Tata na biso azingi bato na Ye, sik’oyo mpe seko na seko. 3Lingenda ya bokonzi ya mabe ekopema te likolo ya mokili oyo epesamaki na bato ya bosembo, mpo ete bato ya bosembo basembola maboko na bango te mpo na kosala mabe. 4Sala malamu, Tata na biso, epai ya bato oyo bazali malamu, epai ya bato oyo bazali sembo na mitema na bango. 5Kasi bato oyo bapengwi na nzela na bango ya mabe, Tata na biso akokamba bango elongo na basali-mabe. Tika ete kimia ezala likolo ya Isalaele !