Alipamboli moto oyo atshaka Ye nsɔmɔ
Ndenge ya talatala ya nzembo ya liboso. Oyo elobamaki mpo na Tata na biso elobami sikoyo mpo na moto oyo azali kobanga ye: pole ebimeli ye na kati ya molili, atamboli na bokabi, mpe abangaka te nsango ya mabe.
112 1Alleluya ! Apambolami moto oyo atshaka Tata na biso nsomo, oyo asepelaka mingi na mibeko na Ye. 2Bana na ye bakozala na nguya na mokili ; nkola ya bato ya sembo ekopambolama. 3Bomengo mpe biloko ebele ezali na ndako na ye, mpe bosembo na ye etikali seko. 4Pole etandaka kati na molili mpo na bato ya sembo ; ye azali na ngolu, na mawa mpe na bosembo. 5Makambo mazali kokende malamu mpo na moto oyo azali na motema malamu mpe akolisaka bato, oyo akambaka makambo na ye na bosembo. 6Solo, akoningana te libela ; moto ya sembo akokanisama seko. 7Atshaka nsomo te mpo na nsango ya mabe ; motema na ye ezali makasi, ye azali kotia motema na Tata na biso. 8Motema na ye ezali kolendisama ; akobanga te, kino akotala na lokumu banguna na ye. 9Akabaki na motema malamu mpe apesaki bato ya bobola ; bosembo na ye etikali seko ; akomisami likolo na lokumu. a a v9 Polo ayebisi liloba oyo mpo na kolimbola kopesa ya esengo mpe na loboko ya molai oyo Tata na biso apambolaka — 2 Bakolinti 9:9. 10Moto ya mabe amonaka yango mpe asilikaka ; akuta mino na ye mpe azali kolemba ; posa ya bato ya mabe ekobungisama.