Ebimisami na papye
Buku

Tambola na bwanya, bondela na bomipesi

Paulo asengi libondeli ete Tata na biso afungola ekuke mpo na nsango ata azali na minyɔlɔ, akebisi bango koloba na boboto mpe na mungwa epai ya bato ya libanda, sima abengi baninga na ye moko na moko — Tikiko, Onesimo, Epafrasi oyo azali kobondela makasi mpo na bango, Luka, Marko.

Mokapo 4.

Bankolo, bopesa baombo na bino makambo oyo ezali malamu mpe sembo, pamba te bino mpe bozali na Nkolo kati na likolo.

Bomipesa na libondeli, bobatela likebi na yango elongo na botondi. Bondela mpo na biso mpe, mpo ete Tata na biso afungolela biso ekuke mpo na koyebisa nsango, mpo na kosakola likambo ya kobombama ya Klisto, oyo mpo na yango nazali mpe na minyololo, mpo ete nalimbola yango polele, ndenge nasengeli koloba.

Tambola na bwanya epai na bato ya libanda, bosalela libaku nyonso malamu. Tango nyonso boloba na ngolu, maloba na bino matyama mungwa, mpo ete boyeba ndenge ya kozongisa moto na moto. a a v6 Matyama mungwa : maloba ya mayele mpe ya kolinga, maloba oyo ebongi koyokama.

Basali elongo na biso balingami

Tikiko, ndeko na biso alingami, mosali sembo mpe moombo elongo na biso kati na Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso ya ngai. Natindaki ye epai na bino mpo na likambo oyo : mpo ete boyeba makambo na biso, mpe ete ye akomisa mitema na bino makasi, elongo na Onesime, ndeko sembo mpe alingami, moto na bino. Bakoyebisa bino makambo nyonso ya awa.

Alisitako, moninga na ngai ya boloko, mpe Marko, mwana ya ndeko ya Barnabasi, bapesi bino mbote. Bozwaki malako mpo na ye : soki aya epai na bino, boyamba ye, mpe Yesu, oyo babengaka Yusito. Bango bazali Ba-Yuda se bango kati na basali elongo na ngai mpo na Bokonzi ya Tata na biso ; babondisi ngai.

Epafrasi, moto na bino, mosali ya Klisto Yesu, apesi bino mbote. Tango nyonso azali kobunda mpo na bino na mabondeli, mpo ete botelema bokoli mpe bondimaka penza na makambo nyonso oyo Tata na biso alingi. Nazali kotatola mpo na ye ete asali mosala makasi mpo na bino, mpe mpo na bato ya Laodikia mpe ya Hierapoli. Luka, monganga alingami, apesi bino mbote, mpe Demasi mpe.

Bopesa mbote na bandeko ya Laodikia, mpe na Nimfa mpe na lingomba oyo ezali na ndako na ye. Tango mokanda oyo ekotangama kati na bino, bosala ete etangama mpe kati na lingomba ya Laodikia, mpe bino mpe botanga oyo euti na Laodikia. Mpe boloba na Alikipo : « Keba ete osilisa mosala oyo ozwaki kati na Nkolo. »

Ngai Polo, nakomi mbote oyo na loboko na ngai moko. Bokanisa minyololo na ngai. Ngolu ezala elongo na bino.