Mwana ya libebi azali koya
Batesaloniki bayoki, ekoki kozala na mokanda ya lokuta, ete mokolo ya Nkolo eleki koya. Paulo alobi te: botomboki ekoya liboso, mpe moto ya mobeko te oyo afandi na tempelo ya Tata na biso mpe amibyangi Nzambe. Na kati na ntango yango, botelema ngwi mpe bókanga makasi oyo mateyamaki na bino.
2 1Bandeko, tozali kosenga bino mpo na koya ya Nkolo na biso Yesu-Klisto mpe mpo na kosangana na biso epai na Ye, 2ete bobanga te kolenga noki na makanisi na bino to kobangisama na molimo, na nsango, to na mokanda oyo elobami ete euti epai na biso, ete mokolo ya Nkolo na biso ekoki sik’oyo. 3Tika ete moto moko te akosa bino na ndenge moko te ; pamba te mokolo wana ekoya te soki botomboki ekoya liboso mpe mobali ya kozanga mibeko, oyo akobebisama, alakisami, 4oyo azali kotelemela, mpe azali komitombola likolo ya nzambe nyonso oyo babyangi bongo to eloko nyonso oyo bazali kosambela, kino afandi na tempelo ya Tata na biso, azali komilobela ete ye azali Nzambe. a a v4 Awa « Nzambe » etiami pamba, pamba te ezali liloba ya lokuta ya mobali ya kozanga mibeko, oyo azali komitombola ye moko, lokola eloko ya lokuta ya Tata oyo azali kotelemela Ye. 5Bokanisaka te ete tango nazalaki naino elongo na bino, nalobaki na bino makambo oyo ? 6Sik’oyo boyebi oyo ezali kokanga ye sik’oyo, mpo ete alakisama na tango na ye moko. 7Pamba te mobulu ya bozangi mibeko ezali kosala sik’oyo, kasi nde oyo azali kokanga ye sik’oyo akoba kokanga kino akolongolama na nzela. 8Bongo mobali ya kozanga mibeko akolakisama, oyo Nkolo Yesu akobwaka na mpema ya monoko na Ye mpe akobebisa na moto ya kongenga ya koya na Ye. 9Mobali ya kozanga mibeko akoya na mosala ya Satana, na nguya nyonso, na bilembo ya lokuta, mpe na makambo ya kokamwa, 10mpe na bokosi nyonso ya mabe mpo na bato oyo bazali kobebana, pamba te baboyaki kolinga solo mpo ete babikisama. 11Mpo na yango Tata na biso atindeli bango bokosi ya nguya, mpo ete bandima oyo ezali lokuta, 12mpo ete bato nyonso oyo bandimaki solo te kasi basepelaki na mabe bakweisama.
Botelema ngwi na libyangi ya Tata
13Tosengeli kopesa Tata na biso matondi tango nyonso mpo na bino, bandeko oyo Nkolo alingi, pamba te Tata na biso aponaki bino lokola mbuma ya liboso mpo na libiki, na mosala ya Molimo Mosantu oyo asantisaka mpe na boyambi na solo. 14Abyangaki bino na yango na nzela ya Nsango Malamu na biso, mpo bozwa nkembo ya Nkolo na biso Yesu-Klisto. 15Boye, bandeko, botelema ngwi mpe bosimba mimeseno oyo tolakisaki bino, ezala na liloba na biso to na mokanda.
16Tika ete Nkolo na biso Yesu-Klisto Ye moko, mpe Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso libondisi ya seko mpe elikya malamu na ngolu, 17abondisa mitema na bino mpe akomisa yango makasi na mosala nyonso malamu mpe na liloba malamu.