Tata atii pembeni libota ya banganga-Nzambe ya Levi
Molongo ya Levi elandami na nzela ya Arona kino na nganga-Nzambe oyo akendeki na boombo, sima na nzela ya bayembi oyo Davidi aponaki mpo na ndako ya Tata na biso. Libota oyo ezalaki na libula ya mabele te epesami bingumba ntuku minei na mwambe oyo epalangani kati na mabele ya basusu nyonso.
6 1Bana ya Levi : Gersoni, Kohate mpe Merari. 2Bana ya Kohate : Amirami, Izari, Hebron mpe Uziele. 3Bana ya Amirami : Aron, Moyize mpe Miriami. Bana ya Aron : Nadabi, Abihu, Eleazari mpe Itamari. 4Eleazari abotaki Fineesi, Fineesi abotaki Abisua, 5Abisua abotaki Buki, Buki abotaki Uzi, 6Uzi abotaki Zerahia, Zerahia abotaki Merayoti, 7Merayoti abotaki Amaria, Amaria abotaki Ahitubi, 8Ahitubi abotaki Sadoki, Sadoki abotaki Ahimaasi, 9Ahimaasi abotaki Azaria, Azaria abotaki Yohanani, 10Yohanani abotaki Azaria, oyo azalaki nganga-Nzambe na tempelo oyo Salomo atongaki na Yerusalemi. 11Azaria abotaki Amaria, Amaria abotaki Ahitubi, 12Ahitubi abotaki Sadoki, Sadoki abotaki Salumi, 13Salumi abotaki Hilikia, Hilikia abotaki Azaria, 14Azaria abotaki Seraya, mpe Seraya abotaki Yehozadaki. 15Yehozadaki akendaki na bokangami tango Tata na biso alongolaki Yuda mpe Yerusalemi na nzela ya Nebukadanesari.
16Bana ya Levi : Gersomi, Kohate mpe Merari. 17Tala bakombo ya bana ya Gersomi : Libni mpe Simei. 18Bana ya Kohate : Amirami, Izari, Hebron mpe Uziele. 19Bana ya Merari : Mali mpe Musi. Tala mabota ya Ba-Levi engebene na ndako ya bankoko na bango. 20Ya Gersomi : Libni mwana na ye, Yahate mwana na ye, Zima mwana na ye, 21Yoa mwana na ye, Ido mwana na ye, Zera mwana na ye, Yeaterai mwana na ye. 22Bakitani ya Kohate : Aminadabi mwana na ye, Kore mwana na ye, Asiri mwana na ye, 23Elikana mwana na ye, Ebiasafi mwana na ye, Asiri mwana na ye, 24Tahate mwana na ye, Uriele mwana na ye, Uzia mwana na ye, mpe Sauli mwana na ye. 25Bana ya Elikana : Amasai mpe Ahimote, 26Elikana mwana na ye, Zofai mwana na ye, Nahate mwana na ye, 27Eliabi mwana na ye, Yeroame mwana na ye, Elikana mwana na ye. 28Bana ya Samuele : Yoele mwana ya liboso mpe Abia ya mibale. 29Bana ya Merari : Mali, Libni mwana na ye, Simei mwana na ye, Uza mwana na ye, 30Simea mwana na ye, Hagia mwana na ye, mpe Asaya mwana na ye.
31Tala bato oyo Davidi atyaki na likambo ya loyembo na ndako ya Tata na biso sima ya sanduku kozwa esika ya kopema. 32Bazalaki kosala mosala na loyembo liboso ya Ndako ya Kapo, hema ya bokutani, kino Salomo atongaki ndako ya Tata na biso na Yerusalemi, mpe basalaki mosala na bango engebene na molongo oyo etyamaki mpo na bango. 33Baoyo basalaki elongo na bana na bango. Uta na Ba-Kohate : Hemani moyembi, mwana ya Yoele, mwana ya Samuele, 34mwana ya Elikana, mwana ya Yeroame, mwana ya Eliele, mwana ya Toa, 35mwana ya Zufi, mwana ya Elikana, mwana ya Mahate, mwana ya Amasai, 36mwana ya Elikana, mwana ya Yoele, mwana ya Azaria, mwana ya Sofonia, 37mwana ya Tahate, mwana ya Asiri, mwana ya Ebiasafi, mwana ya Kore, 38mwana ya Izari, mwana ya Kohate, mwana ya Levi, mwana ya Isalaele. 39Ndeko na ye Asafi afandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Hemani : Asafi mwana ya Berekia, mwana ya Simea, 40mwana ya Mikaele, mwana ya Baaseya, mwana ya Malikia, 41mwana ya Etini, mwana ya Zera, mwana ya Adaya, 42mwana ya Etani, mwana ya Zima, mwana ya Simei, 43mwana ya Yahate, mwana ya Gersomi, mwana ya Levi. 44Na ngambo ya loboko ya mwasi, bandeko na bango, bana ya Merari : Etani mwana ya Kisi, mwana ya Abdi, mwana ya Maluki, 45mwana ya Hasabia, mwana ya Amazia, mwana ya Hilikia, 46mwana ya Amzi, mwana ya Bani, mwana ya Semeri, 47mwana ya Mali, mwana ya Musi, mwana ya Merari, mwana ya Levi.
48Bandeko na bango Ba-Levi batyamaki mpo na mosala nyonso ya Ndako ya Kapo, ndako ya Tata na biso. 49Kasi Aron na bana na ye bazalaki kobonza mbeka likolo ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe likolo ya etumbelo ya malasi, basalaki mosala nyonso ya Esika Mosantu Koleka mpe bazalaki kolongola masumu ya Isalaele, engebene na nyonso oyo Moyize, mosaleli ya Tata na biso, apesaki mitindo.
50Tala bana ya Aron : Eleazari mwana na ye, Fineesi mwana na ye, Abisua mwana na ye, 51Buki mwana na ye, Uzi mwana na ye, Zerahia mwana na ye, 52Merayoti mwana na ye, Amaria mwana na ye, Ahitubi mwana na ye, 53Sadoki mwana na ye, mpe Ahimaasi mwana na ye.
54Tala bisika na bango ya kofanda mpe bamboka na bango na kati ya mokili na bango : bakitani ya Aron na libota ya Ba-Kohate bazwaki ndambo ya liboso, 55mpe bapesaki bango Hebron na mokili ya Yuda, elongo na bilanga ya bibwele zingazinga na yango. 56Kasi bapesaki bilanga ya engumba yango mpe bamboka na yango na Kalebi mwana ya Yefune. 57Boye bapesaki bakitani ya Aron bingumba ya ekimelo : Hebron, Libna elongo na bilanga na yango ya bibwele, Yatiri, Estemoa elongo na bilanga na yango ya bibwele, 58Hileni elongo na bilanga na yango ya bibwele, Debiri elongo na bilanga na yango ya bibwele, 59Asani elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Beti-semesi elongo na bilanga na yango ya bibwele. 60Uta na libota ya Beniamina : Geba, Alemeti mpe Anatoti, moko na moko elongo na bilanga ya bibwele — bingumba zomi na misato nyonso, engebene na mabota.
61Batikali ya Ba-Kohate bapesamaki na kabolami bingumba zomi uta na mabota ya ndambo ya libota ya Manase. 62Ba-Gersomi, engebene na mabota na bango, bapesamaki bingumba zomi na misato uta na libota ya Isakari, Aseri, Nefutali mpe ndambo ya Manase na Basani. 63Ba-Merari, libota na libota, bapesamaki na kabolami bingumba zomi na mibale uta na mabota ya Rubeni, Gadi mpe Zabuloni. 64Boye bana ya Isalaele bapesaki Ba-Levi bingumba oyo elongo na bilanga na yango ya bibwele. 65Uta na mabota ya Yuda, Simeona mpe Beniamina bapesaki na kabolami bingumba oyo ebengami likolo.
66Mabota mosusu ya Ba-Kohate bapesamaki bingumba uta na libota ya Efraimi lokola mokili na bango. 67Bapesamaki bingumba ya ekimelo : Sikemi elongo na bilanga ya bibwele na ngomba ya Efraimi, mpe Gezeri elongo na bilanga ya bibwele, 68Yokimeami elongo na bilanga na yango ya bibwele, Beti-horoni elongo na bilanga na yango ya bibwele, 69Ayaloni elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Gati-rimoni elongo na bilanga na yango ya bibwele. 70Uta na ndambo ya libota ya Manase : Aneri elongo na bilanga na yango ya bibwele mpe Bileami elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpo na mabota ya Ba-Kohate oyo etikalaki.
71Ba-Gersomi bazwaki uta na libota ya ndambo ya Manase : Golani na Basani elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Astarote elongo na bilanga na yango ya bibwele, 72uta na libota ya Isakari, Kedese elongo na bilanga na yango ya bibwele, Daberati elongo na bilanga na yango ya bibwele, 73Ramoti elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Anemi elongo na bilanga na yango ya bibwele ; 74uta na libota ya Aseri, Masali elongo na bilanga na yango ya bibwele, Abidoni elongo na bilanga na yango ya bibwele, 75Hukoki elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Rehobo elongo na bilanga na yango ya bibwele ; 76uta na libota ya Nefutali : Kedese na Galilaya elongo na bilanga ya bibwele, Hamoni elongo na bilanga ya bibwele, Kiriatayimi elongo na bilanga ya bibwele.
77Batikali ya Ba-Merari bazwaki, uta na libota ya Zabuloni, Rimono elongo na bilanga na yango ya bibwele mpe Taboro elongo na bilanga na yango ya bibwele, 78mpe na ngambo mosusu ya Yordani, na ngambo ya moi ebimaka ya Yeriko, uta na libota ya Rubeni : Bezeri na esobe elongo na bilanga na yango ya bibwele, Yahisa elongo na bilanga na yango ya bibwele, 79Kedemoti elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Mefaati elongo na bilanga na yango ya bibwele ; 80mpe uta na libota ya Gadi, Ramoti na Giliadi elongo na bilanga na yango ya bibwele, Mahanayimi elongo na bilanga na yango ya bibwele, 81Hesiboni elongo na bilanga na yango ya bibwele, mpe Yazeri elongo na bilanga na yango ya bibwele.