Ebimisami na papye
Buku

Libota Etongi Efelo Esika Moko

Ekuke na ekuke, eteni na eteni, engumba mobimba etii maboko na misala: banganga-nzambe, basali ya wolo, mosali ya mafuta ya solo, bakonzi ya bingumba, bato ya Yeriko mpe ya Tekoa, Shalumu azali kosala vers ya bana na ye ya basi. Bobele bankumu ya Tekoa baboyi komikitisa na mosala.

Mokapo 3.

Eliasibu mosembo-nganga monene elongo na ba-nganga ndeko na ye batikalaki mpe batongaki Ekuke ya Bampate. Basantisaki yango mpe batIaki baporte na yango. Basantisaki yango kino na Ndako molai ya Nkama, kino na Ndako molai ya Hananeli. Pembeni na bango, bato ya Eriko batongaki, mpe pembeni na bango Zakuri mwana ya Imri atongaki.

Bana ya Senaa batongaki Ekuke ya Mbisi, batIaki mabaya na yango, mpe batIaki baporte, bibende mpe makonzi na yango. Pembeni na bango, Meremoti mwana ya Uria, mwana ya Hakozi, abongisaki. Pembeni na bango, Mesulame mwana ya Berekia, mwana ya Mesezabeli, abongisaki. Pembeni na bango, Sadoki mwana ya Baana abongisaki. Pembeni na bango, Ba-Tekoa babongisaki, kasi bakumu na bango bakitisaki ngai na bango te mpo na mosala ya bankolo na bango.

Yoyada mwana ya Pasea mpe Mesulame mwana ya Besodia babongisaki Ekuke ya Kala : batIaki mabaya na yango, batIaki baporte, bibende mpe makonzi na yango. Pembeni na bango, Melatia moto ya Gabaona mpe Yadoni moto ya Meronoti, bato ya Gabaona mpe ya Mizipa, babongisaki eteni oyo ezali ya kiti ya guvernere ya etuka ya Mpe ya Ebale. a a v7 Etuka ya Mpe ya Ebale ezalaki etuka ya bokambi ya Ba-Persi oyo ezipaki mikili nyonso na ngambo ya mokolo ya Ebale Efrate, na kati na yango Yuda. Pembeni na ye, Uziele mwana ya Harhaya, moko kati na basali ya wolo, abongisaki. Pembeni na ye, Hanania, mosali ya mafuta ya solo malamu, abongisaki. Babongisaki Yerusalemi kino na Efelo Monene. Pembeni na bango, Refaya mwana ya Hure, mokonzi ya eteni moko ya etuka ya Yerusalemi, abongisaki. Pembeni na bango, Yedaya mwana ya Harumafi abongisaki na ngambo ya ndako na ye ; pembeni na ye, Hatusi mwana ya Hasabinia abongisaki. Malikiya mwana ya Harimi mpe Hasubi mwana ya Pahati-Moabi babongisaki eteni mosusu mpe Ndako molai ya Mabiko ya Mampa. Pembeni na ye, Salumu mwana ya Haloesi, mokonzi ya eteni moko ya etuka ya Yerusalemi, abongisaki, ye elongo na bana na ye ya basi.

Hanuni mpe bato ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lobwaku. Batongaki yango, batIaki baporte, bibende mpe makonzi na yango, mpe babongisaki makolo nkoto moko na nkama mitano ya efelo kino na Ekuke ya Bosoto.

Malikiya mwana ya Rekabi, mokonzi ya etuka ya Beti-Kerem, abongisaki Ekuke ya Bosoto. Atongaki yango mpe atIaki baporte, bibende mpe makonzi na yango.

Salumu mwana ya Kolo-Hoze, mokonzi ya etuka ya Mizipa, abongisaki Ekuke ya Liziba. Atongaki yango, afandisaki yango mpando, mpe atIaki baporte, bibende mpe makonzi na yango. Abongisaki mpe efelo ya Libulu ya Siloe pembeni na Elanga ya Mokonzi, kino na bitui oyo ekitaka uta na Mboka ya Davidi. Sima na ye, Nehemia mwana ya Azibuki, mokonzi ya eteni moko ya etuka ya Beti-Zuri, abongisaki kino na esika oyo ezali na ngambo ya malita ya Davidi, libulu oyo etongami, mpe Ndako ya Basoda ya mpiko. Sima na ye, Ba-Levi babongisaki : Rehumi mwana ya Bani. Pembeni na ye, Hasabia, mokonzi ya eteni moko ya etuka ya Keila, abongisaki mpo na etuka na ye. Sima na ye, bandeko na bango Ba-Levi babongisaki : Binui mwana ya Henadadi, mokonzi ya eteni moko ya etuka ya Keila. Pembeni na ye, Ezeri mwana ya Yosue, mokonzi ya Mizipa, abongisaki eteni mosusu na ngambo ya nzela oyo epusi ndako ya bibende ya etumba na Ekonzo. Sima na ye, Baruki mwana ya Zabai abongisaki na molende eteni mosusu, uta na Ekonzo kino na ekuke ya ndako ya Eliasibu mosembo-nganga monene. Sima na ye, Meremoti mwana ya Uria, mwana ya Hakozi, abongisaki eteni mosusu, uta na ekuke ya ndako ya Eliasibu kino na nsuka ya ndako na ye. Sima na ye, ba-nganga oyo bafandaka na lisalala zingazinga babongisaki. Sima na bango, Benyamina mpe Hasubi babongisaki na ngambo ya ndako na bango. Sima na bango, Azaria mwana ya Maaseya, mwana ya Ananiya, abongisaki pembeni na ndako na ye moko. Sima na ye, Binui mwana ya Henadadi abongisaki eteni mosusu, uta na ndako ya Azaria kino na Ekonzo mpe na eloko ya nsuka. Palali mwana ya Uzai abongisaki na ngambo ya Ekonzo mpe ndako molai oyo ebimi na ndako monene ya likolo ya mokonzi, pembeni na lopango ya bakengeli. Sima na ye, Pedaya mwana ya Parosi. Ba-Netinimi oyo bafandaka na Ofeli babongisaki kino na ngambo ya Ekuke ya Mai na ngambo ya moi euti, mpe ndako molai oyo ebimi. Sima na bango, Ba-Tekoa babongisaki eteni mosusu, uta na ngambo ya ndako molai monene oyo ebimi kino na efelo ya Ofeli.

Likolo ya Ekuke ya Bampunda, ba-nganga babongisaki, moto na moto na ngambo ya ndako na ye moko. Sima na ye, Sadoki mwana ya Imeri abongisaki na ngambo ya ndako na ye. Sima na ye, Semaya mwana ya Sekania, mokengeli ya Ekuke ya Epai Moi Euti, abongisaki. Sima na ye, Hanania mwana ya Selemia mpe Hanuni, mwana ya motoba ya Zalafi, babongisaki eteni mosusu. Sima na bango, Mesulame mwana ya Berekia abongisaki na ngambo ya esika na ye ya kofanda. Sima na ye, Malikiya, moko kati na basali ya wolo, abongisaki kino na ndako ya Ba-Netinimi mpe ya bato ya komona, na ngambo ya Ekuke ya Botalisi, mpe kino na ndako ya likolo na ekonzo. Kati na ndako ya likolo na ekonzo mpe Ekuke ya Bampate, basali ya wolo mpe bato ya komona babongisaki.