Ebimisami na papye
Buku

Komema bandeko liboso ya bato oyo bandimi te

Bandimi bazali komemana liboso ya basambisi ya bapakano, yango ezali kala kolongama; eleki malamu koyokisama mpasi. Sima maloba na bango mpo na bonsomi emekami liboso ya lisumu ya pite: nzoto na bango ezali binama ya Klisto mpe tempelo ya Molimo, esombami na motuya, yango wana bopesa Tata na biso nkembo na nzoto.

Mokapo 6.

Tango moto moko kati na bino azali na likambo elongo na moninga na ye, azali na mpiko ya komema yango liboso ya bato oyo bazali na bosembo te mpo basambisa, kasi liboso ya bato ya Nzambe te? Boyebi te ete basantu bakosambisa mokili? Soki bino bokosambisa mokili, bozali na likoki te ya kosambisa makambo mike koleka? Boyebi te ete tokosambisa baanzelu? Boni mpe makambo ya bomoi oyo! Boye tango bozali na makambo ya ndenge wana, bokopona lokola basambisi bato oyo bazali na motuya te kati na eklezia? Nazali koloba yango mpo na kotia bino soni. Moto moko te azali kati na bino oyo azali na bwanya mpo na kosambisa kati na bandeko oyo bandimi? Kasi ndeko moko azali komema ndeko mosusu na esambiselo, mpe yango liboso ya bato oyo bandimi te! Kozala na makambo ya esambiselo kati na bino ezali sik’oyo kolemba mobimba mpo na bino. Mpo na nini bondima te kosalelama mabe? Mpo na nini bondima te kokosama? Kasi bino moko bozali kosala mabe mpe kokosa, mpe bozali kosala yango na bandeko na bino moko.

To boyebi te ete bato oyo bazali na bosembo te bakozwa libula ya Bokonzi ya Tata na biso te? Bokosama te : bato ya pite te, bato oyo bakumisaka bikeko te, bato ya ekobo te, mibali oyo bakomisaka nzoto na bango eloko ya pite te, mibali oyo balalaka na mibali te, mpe bayibi te, bato ya lokoso te, balangi masanga te, bato ya kotuka te, bakosi te, bakozwa libula ya Bokonzi ya Tata na biso te. Basusu na bino bazalaki boye. Kasi bosukolami, kasi bosantisami, kasi bosembisami na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na Molimo ya Tata na biso.

« Nazali na bonsomi ya kosala eloko nyonso » — kasi nyonso ezali na litomba te. « Nazali na bonsomi ya kosala eloko nyonso » — kasi eloko moko te ekoyangela ngai. « Bilei ezali mpo na libumu, mpe libumu mpo na bilei » — mpe Tata na biso akobebisa yango mibale. Kasi nzoto ezali mpo na pite te, ezali mpo na Nkolo, mpe Nkolo mpo na nzoto. Mpe Tata na biso, oyo asekwisaki Nkolo, akosekwisa biso mpe na nguya na Ye. Boyebi te ete nzoto na bino ezali binama ya Klisto? Nakoki kozwa binama ya Klisto mpe kosala yango binama ya mwasi ya pite? Ata moke te! To boyebi te ete moto oyo akangami na mwasi ya pite akomi nzoto moko na ye? Pamba te ekomami : « Bango mibale bakokoma nzoto moko. » Kasi moto oyo akangami na Nkolo azali molimo moko na Ye.

Bokima pite. Lisumu mosusu nyonso oyo moto asalaka ezali libanda ya nzoto, kasi moto ya pite azali kosala lisumu na nzoto na ye moko. To boyebi te ete nzoto na bino ezali tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwi epai ya Tata na biso? Bozali na bino moko te, pamba te basombaki bino na ntalo. Boye bokumisa Tata na biso na nzoto na bino.